Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Samuele 14:25 - Mokanda na Bomoi

25 Kati na Isalaele mobimba, ezalaki na moto moko te oyo azalaki kitoko koleka Abisalomi mpe oyo bazalaki kokumisa lokola ye. Azalaki ata na mbeba moko te, banda na moto kino na misapi ya makolo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Samuele 14:25
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nzokande, tata na ye atikalaki kopamela ye ata mokolo moko te mpe kotuna ye : « Mpo na nini ozali kosala boye ? » Adoniya azalaki penza kitoko mpe abotamaki sima na Abisalomi.


Boye, Satana alongwaki liboso ya Yawe mpe abwakelaki Yobo bokono ya mabe na poso ya nzoto, longwa na se ya matambe na ye kino na songe ya moto.


Bonzenga ya elongi ekosaka, mpe kitoko ya nzoto ezalaka pamba ; kasi mwasi oyo atosaka Yawe, ye nde abongi na lokumu.


Longwa na litambe kino na moto, eloko moko te ezali malamu, kaka bapota mpe matutu oyo basukola te, batia kisi te mpe bapakola mafuta te.


mibali yango balataki mikaba na baloketo na bango mpe bitendi ya balangi ebele na mito na bango. Bango nyonso bazalaki na lolenge ya bakonzi ya basoda ya Babiloni, oyo babotama na mokili na Chalide.


bilenge mibali oyo banzoto na bango ezanga mbeba, ya bilongi kitoko, ya mayele mpe ya bwanya, oyo bazali na makoki ya koyekola kotanga mpe kokoma makambo ya ndenge na ndenge, oyo bazali na bososoli mpe bakoka mpo na kosala kati na ndako ya mokonzi ; Ashipenazi asengelaki kolakisa bango koloba, kokoma mikanda mpe kotanga lokota ya bato ya Babiloni.


Mawa na bino, balakisi ya Mobeko mpe Bafarizeo, bato ya bilongi mibale ! Bozali lokola bakunda oyo bapakola langi ya pembe : emonanaka kitoko na libanda, kasi etonda na mikuwa ya bakufi mpe na lolenge nyonso ya mbindo.


mpe mpo na kotalisa yango epai na Ye moko lokola Lingomba etonda na nkembo, ezanga litono to likwanza to mbeba, kasi lokola Lingomba ya bule mpe ezanga pamela.


Yawe akotindela bino bokono oyo ekobuka bino mabolongo, makolo ; bokono oyo ekoki kobika te mpe ekopanzana banda na se ya matambe kino na mito.


Kasi Yawe alobaki na Samuele : — Kotala te lolenge ya nzoto na ye to molayi na ye, pamba te naponi ye te. Yawe atalaka te ndenge moto atalaka. Moto atalaka kaka oyo ebetaka na miso, kasi Yawe atalaka motema.


Azalaki na mwana mobali ; kombo na ye ezalaki « Saulo. » Azalaki elenge mobali moko ya kitoko ; mpe kati na mibali nyonso ya Isalaele, moko te akokanaki na ye na kitoko ; azalaki mbinga koleka bango nyonso.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ