Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Samuele 14:20 - Mokanda na Bomoi

20 Mosali na yo, Joabi, asalaki boye mpo na kobongola mpe kokomisa makambo oyo ndenge mosusu. Kasi nkolo na ngai azali na bwanya lokola Anjelu na Nzambe, ayebi makambo nyonso oyo ezali koleka kati na mokili.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Samuele 14:20
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Pamba te Nzambe ayebi malamu ete mokolo oyo bokolia yango, miso na bino ekofungwama mpe bokokoma lokola Ye  : koyeba malamu na mabe.


Mpe sik’oyo, tala makambo oyo mwasi mosali na yo azali koloba : « Tika ete liloba ya mokonzi, nkolo na ngai, epesa ngai bopemi, pamba te mokonzi, nkolo na ngai, azali lokola Anjelu na Nzambe oyo ayebaka kososola mabe mpe malamu. Tika ete Yawe, Nzambe na yo, azala elongo na yo ! »


Eloko moko te ebombamaka na miso ya mokonzi. Bongo soki natosaki mokonzi te mpe soki nabomaki Abisalomi, yo olingaki na yo kokotela ngai te.


Mefibosheti azongisaki : — Mokonzi, nkolo na ngai, mosali na ngai akosaki ngai. Pamba te lokola ngai, mosali na yo, nazali na mbeba na makolo, namilobelaki : « Nakosenga ete babongisela ngai ane na ngai, mpe nakomata yango mpo ete nakende elongo na mokonzi. »


Kasi Tsiba, mosali na ngai, akosaki ngai. Akoselaki mosali na yo makambo epai ya mokonzi, nkolo na ngai. Mokonzi, nkolo na ngai, azali lokola Anjelu na Nzambe. Boye sala sik’oyo makambo oyo omoni ete ezali malamu.


Bongo Davidi atunaki Yawe, mpe Yawe azongiselaki ye : « Kobundisa bango na liboso te, kasi baluka na sima na bango ; bongo okobimela bango na liboso ya banzete ya mirie.


Lolemo ya lokuta eyinaka bato oyo ezokisi, mpe maloba ya sukali ememaka libebi.


Moto oyo alobaka na moninga na ye maloba ya sukali atielaka ye motambo na se ya matambe.


Akishi azongiselaki Davidi : — Nayebi ete osepelisaka ngai lokola Anjelu na Nzambe, Kasi bakonzi ya basoda ya Filisitia balobi : « Asengeli te kokende elongo na biso na bitumba. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ