Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Samuele 14:19 - Mokanda na Bomoi

19 Mokonzi atunaki : — Boni, loboko ya Joabi ezali elongo na yo te na makambo oyo nyonso ? Mwasi azongisaki : — Na kombo na yo mokonzi, nkolo na ngai, kati na makambo nyonso oyo mokonzi, nkolo na ngai, awuti koloba, moto moko te akoki kokende, ezala na ngambo ya loboko ya mobali to na ngambo ya loboko ya mwasi. Solo, ezali mosali na yo, Joabi, nde atindaki ngai kosala makambo oyo, mpe ye nde atiaki maloba oyo na monoko na ngai mwasi mosali na yo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Samuele 14:19
22 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Iri azongiselaki Davidi : — Sanduku, Isalaele mpe Yuda bazali kovanda na bandako ya kapo ; mpe Joabi, nkolo na ngai, elongo na bato na ye bazali kolala libanda kati na zamba. Ndenge nini ngai nakende na ndako na ngai mpo na kolia, komela mpe kolala na mwasi na ngai ? Solo, na kombo na yo mokonzi, nakoki kosala likambo ya boye te.


Mokonzi alobaki na mwasi : — Kobombela ngai te eyano ya likambo oyo nalingi kotuna yo. Mwasi azongisaki : — Tika ete mokonzi, nkolo na ngai, aloba !


mpe kende epai ya mokonzi, yebisa ye maloba oyo. » Joabi ayebisaki maloba oyo asengelaki koloba.


Eloko moko te ebombamaka na miso ya mokonzi. Bongo soki natosaki mokonzi te mpe soki nabomaki Abisalomi, yo olingaki na yo kokotela ngai te.


Tango Abineri azongaki lisusu na Ebron, Joabi abendaki ye na pembeni, na kati-kati ya ekuke ya engumba lokola nde alingi kosolola na ye na nkuku. Mpe kuna, mpo na kozongisa mabe na mabe na tina na makila ya ndeko na ye ya mobali Asaeli, Joabi atubaki Abineri mbeli na libumu, mpe Abineri akufaki.


Tika ete makila na ye etangama na moto ya Joabi mpe ya libota na ye mobimba ! Tika ete ndako ya Joabi ezangaka te bato oyo bakobela bokono ya sopisi to bokono ya maba to bato oyo bakotambola na banzete to bato oyo bakokufa na mopanga to bato oyo bakozanga bilei.


Bakangaki te maboko na yo na basinga, bakangaki te makolo na yo na basheni. Kasi okweyi ndenge bakweyaka liboso ya babomi. » Mpe bato nyonso balelaki ye lisusu makasi


Eliya alobaki na Elize : — Nabondeli yo, tikala awa ; pamba te Yawe atindi ngai na Beteli. Elize azongisaki : — Na Kombo na Yawe mpe na kombo na yo, nakotika yo te ! Boye bakendeki na Beteli.


Okoloba na ye mpe okotia maloba na monoko na ye, bongo Ngai nakosunga bino mibale mpo ete bokoka koloba malamu, mpe nakoteya bino makambo oyo bosengeli kosala.


Nzambe azwaka nkembo mpo ete asalaka makambo oyo bato bayebaka te, mpe bakonzi bazwaka nkembo mpo ete balukaka kososola tina ya makambo.


Kotengama te, ezala na ngambo ya loboko ya mobali to ya mwasi, longola makolo na yo na mabe.


Tobondeli yo, tika biso tolekela na mboka na yo. Tokokota na elanga to na elanga ya vino moko te mpe tokomela mayi ya mabulu na bino te. Tokotambola kaka pembeni-pembeni ya nzela ya monene ya mokonzi bongo, tokokatisa ezala na ngambo ya loboko ya mobali to ya mwasi te, kino tokosilisa kokatisa mokili na yo. »


Pamba te, Ngai moko, nakopesa bino maloba oyo bosengeli koloba mpe bwanya oyo ekosala ete banguna na bino nyonso bandima nyonso oyo bokoloba.


Kati na mitindo oyo nazali kopesa bino lelo, bopengwa ata na moko te, mpo na kolanda banzambe mosusu mpe kosalela yango.


Yango wana, bosala keba na oyo nyonso Yawe, Nzambe na bino, atindi bino ; bobaluka te ezala na ngambo moko to na ngambo mosusu.


Kasi zala makasi mpe yika mpiko, sala keba ete otosa mibeko nyonso oyo Moyize, mowumbu na Ngai, apesaki yo ; komeka te kobima libanda na yango, ezala na ngambo ya loboko ya mobali to na ngambo ya loboko ya mwasi, mpo ete okoka kolonga na makambo nyonso oyo okosala.


Ana alobaki na ye : — Limbisa ngai, nkolo na ngai ; nazali mwasi oyo atelemaki awa pembeni na yo mpo na kobondela Yawe.


Tango Saulo amonaki Davidi kokende kobundisa moto ya Filisitia, atunaki Abineri, mokonzi ya mampinga : — Elenge mobali oyo azali mwana ya nani ? Abineri azongisaki : — Na kombo na yo mokonzi, nayebi te.


Kasi Davidi alapaki ndayi na koloba : « Tata na yo ayebi malamu ete nazwaki ngolu na miso na yo, mpe amilobelaki : ‹ Tika ete Jonatan ayeba makambo oyo te, noki te akoyoka pasi na motema ! › Nzokande, na Kombo na Yawe mpe na kombo na yo moko, etikali kaka moke ete baboma ngai. »


Sik’oyo, nkolo na ngai, na Kombo na Yawe mpe na kombo na yo, lokola Yawe apesi yo nzela te ya koboma mpe ya kozongisa yo moko mabe na mabe, tika ete banguna na yo mpe bato nyonso oyo bazali makasi ya kosala mabe epai ya nkolo na ngai bazala lokola Nabali.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ