Yuda apusanaki pembeni na ye mpe alobaki : — Nabondeli yo, nkolo na ngai ! Tika ete mosali na yo aloba liloba moko epai ya nkolo na ngai. Kosilikela mosali na yo te, pamba te ndenge Faraon azali, ndenge wana mpe yo ozali.
Mwasi alobaki : — Tika ete mokonzi alapa ndayi na Kombo na Yawe, Nzambe na ye, ete akopekisa mobukanisi makila mpo ete akoba te kobebisa na koboma mwana na ngai ya mobali, oyo atikali. Mokonzi alobaki : — Na Kombo na Yawe, suki ata moko te ya moto ya mwana na yo ya mobali ekokweya na mabele.
Mwasi alobaki : — Mpo na nini osali mabongisi ya boye mpo na kotelemela bato ya Nzambe ? Wana mokonzi abimisi maloba oyo, ye moko azali komikweyisa te mpo ete azongisi te mwana mobali oyo akimaki na mboka ya bapaya ?
Oh Yawe, ozalaka tango nyonso sembo ; mpe ngai nakokoka kosamba na Yo te. Nzokande nalingi kotuna Yo mwa mituna na tina na oyo etali bosembo na Yo. Mpo na nini misala ya bato mabe ekendaka liboso ? Mpo na nini bato oyo batosaka Yo te bazalaka na bomoi ya kimia ?
Akweyaki na makolo ya Davidi mpe alobaki : — Oh nkolo na ngai, tika ete mbeba ezala kaka na moto na ngai ! Nabondeli yo, tika ete mwasi mosali na yo asolola na yo ! Yoka makambo oyo mwasi mosali na yo alingi koyebisa yo.