Mwasi alobaki : — Tika ete mokonzi alapa ndayi na Kombo na Yawe, Nzambe na ye, ete akopekisa mobukanisi makila mpo ete akoba te kobebisa na koboma mwana na ngai ya mobali, oyo atikali. Mokonzi alobaki : — Na Kombo na Yawe, suki ata moko te ya moto ya mwana na yo ya mobali ekokweya na mabele.
Kasi mwasi ya mboka Tekoa alobaki na mokonzi : — Oh mokonzi, nkolo na ngai, tika ete ngambo ekweya na moto na ngai mpe na libota ya tata na ngai ; kasi tika ete mokonzi mpe kiti na ye ya bokonzi bazala mosika ya likambo oyo.
Mokonzi alobaki na Tsiba : — Nyonso oyo ezali ya Mefibosheti ekomi sik’oyo ya yo. Tsiba alobaki : — Nagumbami liboso na yo mokonzi, nkolo na ngai ! Tika ete nazwa ngolu na miso na yo !