8 Boye Tamari akendeki na ndako ya Aminoni, ndeko na ye ya mobali, oyo azalaki ya kolala. Akamataki farine, asangisaki yango, asalaki bagalete na miso na ye mpe atumbaki yango.
« Alakelama mabe, moto nyonso oyo akosangisa nzoto na ndeko na ye ya mwasi, mwana ya tata na ye to mwana ya mama na ye ! » Bato nyonso bakozongisa : « Amen ! »