7 Davidi atindaki maloba epai ya Tamari oyo azalaki kati na shambre na ye : « Kende na ndako ya Aminoni, ndeko na yo ya mobali, mpe lambela ye biloko. »
Aminoni amitandaki na mbeto mpe akosanaki kobela. Tango mokonzi ayaki mpo na kotala ye, Aminoni alobaki na ye : « Nalingi ete Tamari, ndeko na ngai ya mwasi, aya kolambela ngai na miso na ngai bagalete mibale ya kitoko mpo ete nakoka kolia yango na loboko na ye. »
Boye Tamari akendeki na ndako ya Aminoni, ndeko na ye ya mobali, oyo azalaki ya kolala. Akamataki farine, asangisaki yango, asalaki bagalete na miso na ye mpe atumbaki yango.
Tango Davidi asilisaki kotonga bandako mpo na ye moko kati na engumba ya Davidi, abongisaki esika mpo na Sanduku ya Nzambe mpe atelemisaki ndako ya kapo mpo na yango.