Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Samuele 13:37 - Mokanda na Bomoi

37 Abisalomi akimaki mpe akendeki epai ya Talimayi, mwana mobali ya Amiwudi, mokonzi ya Geshuri. Kasi mokonzi Davidi asalaki mikolo nyonso matanga mpo na mwana na ye ya mobali.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Samuele 13:37
8 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Na tango yango, Abisalomi akimaki. Nzokande tango mokengeli atalaki na mosika, amonaki bato ebele kokita na mopanzi ya ngomba, na nzela ya weste. Mokengeli akendeki koyebisa mokonzi : « Namoni bato na nzela ya Oronayimi, na mopanzi ya ngomba. »


Tango kaka asilisaki koloba, bana mibali ya mokonzi bakotaki na kolela na mongongo makasi. Mokonzi mpe alelaki makasi elongo na basali na ye.


Mwasi alobaki : — Mpo na nini osali mabongisi ya boye mpo na kotelemela bato ya Nzambe ? Wana mokonzi abimisi maloba oyo, ye moko azali komikweyisa te mpo ete azongisi te mwana mobali oyo akimaki na mboka ya bapaya ?


Bongo Joabi akendeki na Geshuri mpe azongisaki Abisalomi, na Yelusalemi.


Abisalomi azongiselaki Joabi : — Tala, natindelaki yo maloba ; nalobaki : « Yaka awa mpo ete natinda yo epai ya mokonzi mpo na kotuna ye : ‹ Mpo na nini nalongwaki na Geshuri ? Elingaki kozala malamu mpo na ngai soki natikalaki na ngai kuna. Sik’oyo, nalingi komona elongi ya mokonzi ; mpe soki namemaki ngambo na likambo moko, tika ete baboma ngai ! › »


pamba te tango mosali na yo azalaki kovanda na Geshuri kati na Siri, nalapaki ndayi oyo : « Soki Yawe azongisi ngai na Yelusalemi, nakogumbamela Ye. »


ya mibale, Kileabi oyo Abigayili oyo akufisaki mobali na ye ya liboso, Nabali, moto ya Karimeli, abotelaki ye ; ya misato, Abisalomi oyo Maaka, mwana ya Talimayi, mokonzi ya Geshuri, abotelaki ye ;


ya misato, Abisalomi, mwana mobali ya Maaka, mwana mwasi ya Talimayi, mokonzi ya Geshuri ; ya minei, Adoniya, mwana mobali ya Agite ;


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ