36 Tango kaka asilisaki koloba, bana mibali ya mokonzi bakotaki na kolela na mongongo makasi. Mokonzi mpe alelaki makasi elongo na basali na ye.
Basali na ye batunaki : — Mpo na nini ozali kosala boye ? Wana mwana azalaki na bomoi, ozalaki komilalisa nzala mpe ozalaki kolela ; awa sik’oyo mwana akufi, otelemi mpe okomi kolia !
Sima na yango, Aminoni ayinaki Tamari makasi, ayinaki ye penza makasi koleka ndenge azalaki kolinga ye. Aminoni alobaki na Tamari : — Telema mpe bima !
Yonadabi alobaki na mokonzi : — Tala ! Bana mibali ya mokonzi bazali koya ! Esalemi ndenge kaka mosali na yo alobaki.
Abisalomi akimaki mpe akendeki epai ya Talimayi, mwana mobali ya Amiwudi, mokonzi ya Geshuri. Kasi mokonzi Davidi asalaki mikolo nyonso matanga mpo na mwana na ye ya mobali.