33 Tika ete mokonzi, nkolo na ngai, amitungisa na ye te mpo na sango oyo asili koyoka, sango oyo ezali koloba ete bana mibali nyonso ya mokonzi bakufi ! Ezali Aminoni kaka moto akufi. »
Na tango yango, Abisalomi akimaki. Nzokande tango mokengeli atalaki na mosika, amonaki bato ebele kokita na mopanzi ya ngomba, na nzela ya weste. Mokengeli akendeki koyebisa mokonzi : « Namoni bato na nzela ya Oronayimi, na mopanzi ya ngomba. »
Bamataki na bwato mpo na kokatisa libota ya mokonzi mpe mpo na kosala nyonso oyo ezali malamu na miso ya mokonzi. Tango Shimei, mwana mobali ya Gera, akatisaki Yordani, akweyaki liboso ya mokonzi