2 Samuele 13:3 - Mokanda na Bomoi3 Nzokande Aminoni azalaki na moninga na ye moko ya mobali ; kombo na ye ezalaki « Yonadabi, » mwana mobali ya Shimea, ndeko mobali ya Davidi. Yonadabi azalaki na mayele mabe mingi. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Kasi Yonadabi, mwana mobali ya Shimea, ndeko mobali ya Davidi, alobaki : « Tika ete nkolo na ngai akanisa te ete babomi bana mibali nyonso ya mokonzi ! Ezali Aminoni kaka moto akufi, pamba te, wuta mokolo oyo Aminoni asangisaki na makasi nzoto na Tamari, ndeko na ye ya mwasi, Abisalomi azwaki mokano ya koboma ye.
Zereshi, mwasi na ye, mpe baninga na ye nyonso balobaki na ye : — Telemisa nzete ya bametele pene tuku mibale na mitano na bosanda ; mpe lobi na tongo, okosenga na mokonzi ete badiembika Maridoshe na nzete yango. Bongo okokende na esengo na feti elongo na mokonzi. Likanisi oyo esepelisaki Amani, mpe atelemisaki nzete.