Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Samuele 13:26 - Mokanda na Bomoi

26 Abisalomi alobaki lisusu : — Nabondeli yo, pesa kaka nzela ete ata Aminoni, ndeko na ngai ya mobali, akende elongo na biso. Mokonzi atunaki ye : — Mpo na nini akende elongo na yo ?

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Samuele 13:26
8 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mokonzi azongisaki : — Te, mwana na ngai, tokoki te kokende biso nyonso, noki te tokozala mokumba mpo na yo. Atako Abisalomi atungisaki ye, kasi mokonzi aboyaki kaka kokende, kasi apambolaki ye.


Kasi Abisalomi akobaki kaka kotungisa ye, mpe mokonzi atindaki bana mibali mosusu ya mokonzi ete bakende elongo na Aminoni.


Joabi alobaki na Amasa : « Boni ndeko na ngai ya mobali, ozali malamu ? » Bongo Joabi asalelaki loboko na ye ya mobali mpo na kosimba Amasa na mandefu mpe kopesa ye beze.


Tango Abineri azongaki lisusu na Ebron, Joabi abendaki ye na pembeni, na kati-kati ya ekuke ya engumba lokola nde alingi kosolola na ye na nkuku. Mpe kuna, mpo na kozongisa mabe na mabe na tina na makila ya ndeko na ye ya mobali Asaeli, Joabi atubaki Abineri mbeli na libumu, mpe Abineri akufaki.


Abundisi balingami na ye, abebisi boyokani na ye.


Moto oyo ayinaka moninga na ye amibombaka na maloba na ye, kasi atondi na lokuta kati na motema na ye.


Lolemo na bango ezali lokola likonga oyo ebomaka, ebimisaka kaka maloba ya lokuta. Moto na moto alobaka na moninga na ye na esengo na monoko ; kasi na se ya motema, atielaka ye motambo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ