Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Samuele 13:21 - Mokanda na Bomoi

21 Tango mokonzi Davidi ayokaki makambo oyo nyonso, asilikaki makasi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Samuele 13:21
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tango bana mibali ya Jakobi bazongaki wuta na esobe, bayokaki sango ya makambo oyo esalemaki. Bongo, bayokaki pasi mingi na mitema mpe basilikaki makasi, pamba te Sishemi asalaki likambo ya soni na Isalaele, wana asangisaki nzoto na makasi na mwana mwasi ya Jakobi. Likambo ya bongo esengelaki kosalema te.


Wana Isalaele azalaki kowumela na mokili wana, Ribeni ayaki kuna mpe asangisaki nzoto na Bila, makangu ya tata na ye ; mpe Isalaele ayokaki yango. Jakobi azalaki na bana mibali zomi na mibale :


Mpo na yango, mopanga ekolongwa lisusu te na ndako na yo, pamba te otioli ngai mpe ozwi mwasi ya Iri, moto ya Iti, mpo ete akoma mwasi na yo.


Davidi asilikelaki mozwi makasi mpe alobaki na Natan : — Na Kombo na Yawe, moto oyo asali boye asengeli na kufa !


Abisalomi, ndeko na ye ya mobali, atunaki ye : « Boni, Aminoni, ndeko na yo ya mobali, azalaki elongo na yo ? Sik’oyo, ndeko na ngai ya mwasi, kolobela yango te ; azali ndeko na yo ya mobali. Kotia likambo oyo na motema te ! » Tamari avandaki kati na ndako ya Abisalomi, ndeko na ye ya mobali, lokola mwasi basundola.


Abisalomi alobaki ata liloba moko te epai ya Aminoni, ndeko na ye ya mobali, ezala ya malamu to ya mabe, pamba te ayinaki Aminoni mpo ete asambwisaki Tamari, ndeko na ye ya mwasi.


Tongo nyonso, nakosala ete bato nyonso ya misala mabe kati na mokili bavanda kimia ; nakolongola na engumba ya Yawe bato nyonso ya mabe.


Bongo mpo na nini bozali kozwa na limemia te bambeka mpe makabo na Ngai, oyo napeselaki mitindo ete epesama kati na Ndako na Ngai ? Mpo na nini ozali kopesa bana na yo ya mibali lokumu koleka Ngai, na ndenge bozali kolia biteni oyo eleki kitoko kati na bambeka oyo bato na Ngai, Isalaele, bazali kobonzela Ngai ?


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ