Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Samuele 13:19 - Mokanda na Bomoi

19 Tamari atiaki putulu na moto na ye mpe apasolaki nzambala na ye ya kitoko oyo alataki. Atiaki maboko na ye na moto mpe, wana azalaki kokende, azalaki kolela na mongongo makasi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Samuele 13:19
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tango Ribeni azongaki na libulu mpe amonaki ete Jozefi azali lisusu kuna te, apasolaki bilamba na ye,


Bongo Davidi mpe basoda nyonso oyo bazalaki elongo na ye basimbaki bilamba na bango mpe bapasolaki yango.


Na mokolo ya misato, moto moko awutaki na molako ya Saulo mpe ayaki na bilamba epasuka, moto etonda na putulu. Tango akomaki epai ya Davidi, amibwakaki na mabele mpo na kogumbama liboso ya Davidi.


Abisalomi, ndeko na ye ya mobali, atunaki ye : « Boni, Aminoni, ndeko na yo ya mobali, azalaki elongo na yo ? Sik’oyo, ndeko na ngai ya mwasi, kolobela yango te ; azali ndeko na yo ya mobali. Kotia likambo oyo na motema te ! » Tamari avandaki kati na ndako ya Abisalomi, ndeko na ye ya mobali, lokola mwasi basundola.


Tango Maridoshe ayokaki makambo nyonso oyo elekaki, apasolaki bilamba na ye ; alataki saki, amipakolaki putulu mpe atambolaki kati na engumba na koganga makasi mpe na mawa.


Wuta na mosika, tango kaka bamonaki ye, bakokaki te koyeba ye lisusu ; boye, babandaki wana kolela makasi, bapasolaki banzambala na bango mpe bamibwakelaki putulu na mito.


Yango wana, ngai moko, nazali komiyokela mawa mpe namileli, namikitisi kino na putulu ya mabele mpe na putulu ya moto. »


Okotika lisusu esika yango, maboko na moto, pamba te Yawe asundoli bato oyo ozalaki kotiela motema ; mpe bango bakosunga yo te. »


Jozue apasolaki bilamba na ye mpe amibwakaki elongi kino na mabele liboso ya Sanduku ya Yawe kino na pokwa. Bakambi ya Isalaele mpe basalaki kaka ndenge moko, bamisopelaki putulu na mito na bango.


Moto moko ya ekolo ya Benjame akimaki mbangu longwa na bisika oyo bazalaki kobunda mpe akomaki na Silo, na mokolo yango kaka ; azalaki na bilamba epasuka, mpe na putulu, na moto na ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ