Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Samuele 13:18 - Mokanda na Bomoi

18 Mosali abimisaki Tamari na libanda mpe akangaki ekuke na bibende sima na ye. Tamari alataki nzambala moko ya kitoko, pamba te ezalaki lolenge ya bilamba oyo bana basi ya mokonzi oyo bayebi nanu nzoto ya mibali te bazalaki kolata.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Samuele 13:18
7 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tango kaka Jozefi akomaki epai ya bandeko na ye ya mibali, balongolaki ye elamba na ye ya kitoko mpe ya talo oyo alataki.


Isalaele azalaki kolinga Jozefi mingi koleka bana na ye nyonso, pamba te abotaki ye na kimobange. Asalelaki ye elamba ya kitoko mpe ya talo.


Sima, bazongisaki elamba yango ya kitoko mpe ya talo epai ya tata na bango. Balobaki : — Tala eloko oyo tomoni ; tala yango malamu soki ezali penza elamba ya mwana na yo to te !


Abengaki mosali na ye mpe alobaki : « Bimisa elenge mwasi oyo na libanda mpe kanga ekuke na bibende sima na ye. »


Ewudi abimaki na sima ya ndako, akangaki bikuke ya shambre ya likolo sima na ye mpe atiaki yango bibende.


« Ezali te mpo bazwi mpe bakaboli bomengo ya bitumba : Elenge mwasi moko to bilenge basi mibale mpo na soda moko, bilamba ya langi mpo na Sisera, bilamba, bilamba ya langi, mpe bilamba oyo batia bililingi, mpo na balongi ? »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ