16 Tamari azongiselaki ye : — Te, kobengana ngai ezali mabe makasi koleka ata makambo oyo owuti kosala ngai ! Kasi Aminoni aboyaki koyoka ye.
Sima na yango, Aminoni ayinaki Tamari makasi, ayinaki ye penza makasi koleka ndenge azalaki kolinga ye. Aminoni alobaki na Tamari : — Telema mpe bima !
Abengaki mosali na ye mpe alobaki : « Bimisa elenge mwasi oyo na libanda mpe kanga ekuke na bibende sima na ye. »