Alongolaki motole oyo ezalaki na moto ya mokonzi na yango. Motole yango esalemaki na bakilo ya wolo koleka tuku misato mpe ezalaki na libanga ya talo na likolo na yango. Wuta na tango wana, ekomaki na moto ya Davidi. Akamataki bomengo ebele ya bitumba kati na engumba yango.
Tango Davidi akomaki na Maanayimi, bayambaki ye epai ya Shovi, mwana mobali ya Naashi ya mboka Raba ya bato ya Amoni, epai ya Makiri, mwana mobali ya Amieli ya mboka ya Lo-Debari, mpe epai ya Barizilayi, moto ya Galadi ya mboka Rogelimi.