Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Samuele 12:22 - Mokanda na Bomoi

22 Azongisaki : — Solo, wana mwana azalaki nanu na bomoi, nazalaki kokila bilei mpe kolela, pamba te nazalaki komilobela : « Nani ayebi ? Tango mosusu Yawe akosalela ngai ngolu mpe akotika mwana na bomoi ! »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Samuele 12:22
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Basali na ye batunaki : — Mpo na nini ozali kosala boye ? Wana mwana azalaki na bomoi, ozalaki komilalisa nzala mpe ozalaki kolela ; awa sik’oyo mwana akufi, otelemi mpe okomi kolia !


— Oh Yawe, kanisa ndenge nini natambolaki liboso na Yo na boyengebene, ndenge nini namipesaki epai na Yo na motema na ngai mobimba, mpe ndenge nini nasalaki makambo ya malamu na miso na Yo. Mpe Ezekiasi alelaki mingi.


« Kende koloba na Ezekiasi : ‹ Yawe, Nzambe ya tata na yo, Davidi, alobi : ‘ Nayoki libondeli na yo mpe namoni mpinzoli na yo. Nakobakisa mibu zomi na mitano na mikolo ya bomoi na yo.


Bopanza sango ya kokila bilei, bobengisa bato na mayangani ya bule, bobengisa bakambi mpe bavandi nyonso ya mokili ete baya na Ndako ya Nzambe na bino mpe bolela epai na Yawe.


Nani ayebi soki akoki kobongola makanisi to koyoka mawa mpe kotika na sima na Ye lipamboli, mpo ete bokoka lisusu kobonzela Yawe, Nzambe na bino, makabo ya bambuma to makabo ya masanga ya vino ?


Boyinaka kosala mabe, kasi bolingaka nde kosala bolamu ; bolukaka bosembo tango bozali kosambisa. Tango mosusu Yawe, Mokonzi ya mampinga, akoyokela ndambo ya bato oyo bamikomisaki mbindo te mawa kati na libota ya Jozefi.


Mokumbi masuwa apusanaki pene ya Yona mpe alobaki na ye : — Ndenge nini okoki penza kolala pongi boye ? Telema mpe belela nzambe na yo, tango mosusu akoki koyokela biso mawa mpo ete tokufa te.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ