Bongo Davidi atelemaki wuta na mabele, amisukolaki nzoto, amipakolaki malasi, alataki bilamba mosusu, akotaki na Tempelo ya Yawe mpe agumbamaki mpo na kosambela. Sima, azongaki na ndako na ye, asengaki bilei mpe aliaki.
— Oh Yawe, kanisa ndenge nini natambolaki liboso na Yo na boyengebene, ndenge nini namipesaki epai na Yo na motema na ngai mobimba, mpe ndenge nini nasalaki makambo ya malamu na miso na Yo. Mpe Ezekiasi alelaki mingi.