Na mokolo ya sambo, mwana akufaki. Basali ya Davidi babangaki koyebisa ye ete mwana akufi, pamba te bazalaki komilobela : « Wana mwana azalaki nanu na bomoi, tango tolobaki na Davidi, ayokaki biso te. Awa sik’oyo mwana akufi, tokoloba na ye ndenge nini ? Soki toyebisi ye sik’oyo ete mwana akufi, akoki kosala likambo moko ya mabe ! »