2 Samuele 12:10 - Mokanda na Bomoi10 Mpo na yango, mopanga ekolongwa lisusu te na ndako na yo, pamba te otioli ngai mpe ozwi mwasi ya Iri, moto ya Iti, mpo ete akoma mwasi na yo. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Lokola ezali bongo, tala makambo oyo Ngai Yawe, Nzambe ya Isalaele, nalobi : ‹ Nalakaki ete libota na yo mpe libota ya tata na yo bakosalela Ngai tango nyonso lokola Banganga-Nzambe. › Kasi sik’oyo, Ngai Yawe nalobi : ‹ Esili ! Mosika na Ngai elaka oyo ! Bato oyo bazali kopesa Ngai lokumu, bango kaka nde Ngai nakopesa lokumu ; kasi ba-oyo bazali kotiola Ngai, nakoyokisa bango soni.