Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Samuele 12:1 - Mokanda na Bomoi

1 Yawe atindaki Natan epai ya Davidi. Tango akomaki epai ya Davidi, alobaki na ye : « Ezalaki na bato mibale kati na engumba moko : moko kati na bango azalaki mozwi ; mpe mosusu, mobola.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Samuele 12:1
24 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Davidi alobaki na ntoma : — Tala makambo oyo okoloba na Joabi : « Tika ete likambo oyo etungisa yo te. Mopanga ekoki koboma songolo to pakala. Sala makasi mpo na kobundisa engumba mpe bebisa yango. » Loba makambo oyo mpo na kolendisa Joabi.


Solo, ndenge bakokaka te kolokota mayi oyo esili kosopana, ndenge mpe biso tosengeli kokufa. Kasi sik’oyo, ezali te mokano ya Nzambe mpo na Abisalomi, pamba te asalaki mabongisi mpo ete moto oyo abungi nzela awumela te mosika na Ye.


Natan ayebisaki Davidi maloba oyo nyonso mpe emoniseli oyo nyonso.


Kasi Nganga-Nzambe Tsadoki, Benaya, mwana mobali ya Yeoyada ; mosakoli Natan, Shimei, Reyi mpe bakengeli ya Davidi baboyaki kosangana na Adoniya.


Moto moko na Nzambe alongwaki na Yuda mpe akendeki na Beteli, kolanda etinda na Yawe, wana Jeroboami atelemaki pembeni ya etumbelo mpo na kotumba ansa.


Sima na tango molayi, na mobu ya misato, Yawe alobaki na Eliya : « Kende komimonisa epai ya Akabi, mpe Ngai nakonokisa mvula na mokili oyo. »


« Kende kokutana na Akabi, mokonzi ya Isalaele, oyo azali kokonza wuta na Samari. Na ngonga oyo, azali kati na elanga ya vino ya Naboti epai wapi akendeki mpo na kokamata yango.


Azaria, mwana mobali ya Natan, azalaki mokonzi ya babateli biloko ya mokonzi ; Zabudi, mwana mobali ya Natan, azalaki Nganga-Nzambe mpe mopesi toli ya mokonzi ;


Kasi anjelu ya Yawe alobaki na Eliya, moto ya mboka Tishibe : — Kende kokutana na bantoma ya mokonzi ya Samari mpe tuna bango : « Boni, Nzambe azali te kati na Isalaele mpo ete bokende kotuna epai ya Bala-Zebubi, nzambe ya Ekroni ?


Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Davidi, wuta na ebandeli kino na suka, ekomama kati na buku ya misala ya mosakoli Samuele, na buku ya misala ya mosakoli Natan mpe na buku ya misala ya mosakoli Gadi.


Boye, mosakoli Ezayi akendeki epai ya mokonzi Ezekiasi mpe atunaki ye : — Bato wana balobi nini mpe bawuti wapi ? Ezekiasi azongisaki : — Bawuti mosika, na mokili ya Babiloni, mpo na koya kotala ngai.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ