Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Samuele 11:3 - Mokanda na Bomoi

3 Davidi atindaki moto moko kokende koluka koyeba soki mwasi yango azali nani. Moto yango alobaki : « Ezali Batisheba, mwana mwasi ya Eliami, mwasi ya Iri, moto ya Iti. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Samuele 11:3
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

kasi mobola azalaki na eloko te longola kaka mwa mwana meme moko ya mwasi oyo asombaki. Abokolaki yango mpe ekolaki epai na ye elongo na bana na ye. Mpate yango ezalaki kolia bilei na sani moko, komela mayi na kopo moko na nkolo na yango mpe kolala na maboko na ye. Ezalaki lokola mwana na ye ya mwasi.


Elifeleti, mwana mobali ya Aasibayi, mwana mobali ya Maakati ; Eliami, mwana mobali ya Ayitofeli, moto ya Gilo ;


mpe Iri, moto ya Iti. Na kosangisa, bango nyonso bazalaki tuku misato na sambo.


Pamba te Davidi asalaki makambo ya malamu na miso ya Yawe mpe abatelaki mibeko ya Yawe mikolo nyonso ya bomoi na ye, longola kaka likambo moko : likambo ya Iri, moto ya Iti.


Iri, moto ya Iti ; Zabadi, mwana mobali ya Akilayi ;


Tala bakombo ya bana na ye ya mibali oyo babotamaki na Yelusalemi : Shimea, Shobabi, Natan mpe Salomo. Ezali Batisheba, mwana mwasi ya Amieli, nde abotaki bana mibali minei oyo.


Kotika te ete motema na yo elula kitoko na ye, mpe miso na ye ekweyisa yo.


Ndenge mpunda ya mobali etambolaka-tambolaka soki ezali na posa ya kosangisa nzoto na mpunda ya mwasi, ndenge wana mpe moko na moko kati na bango alandaka-landaka mwasi ya moninga mpo na kosangisa na ye nzoto.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ