Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Samuele 11:27 - Mokanda na Bomoi

27 Sima na matanga, Davidi abengisaki mwasi ya Uri kati na ndako na ye mpe akomisaki ye mwasi na ye. Mwasi yango abotelaki Davidi mwana mobali. Kasi likambo oyo Davidi asalaki esepelisaki Yawe te.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Samuele 11:27
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Likambo oyo Onani azalaki kosala ezalaki kosepelisa Yawe te. Boye ye mpe lisusu, Yawe abomaki ye.


Mpo na nini otioli Liloba na Yawe na kosala makambo oyo ezali mabe na miso na Ye ? Obomisi Iri, moto ya Iti, na mopanga mpe ozwi mwasi na ye mpo ete akoma mwasi na yo. Obomisi ye na mopanga ya bato ya Amoni.


Kasi soki Nzambe alobi : « Nasepeli na yo te, » wana tika ete asala epai na ngai makambo oyo amoni ete ezali malamu, pamba te nazali ya kobongama.


Tango kaka Akabi ayokaki ete Naboti, moto ya Jizireyeli, asili kokufa, atelemaki mpe akendeki kokamata elanga ya vino ya Naboti.


Tango Akabi amonaki Eliya, alobaki : — Ah, monguna na ngai, omoni ngai kaka ! Eliya azongisaki : — Solo, namoni yo ; pamba te omitekaki yo moko mpo na kosala makambo mabe na miso ya Yawe.


Etinda yango esepelisaki Nzambe te mpe Nzambe apesaki Isalaele etumbu.


Bato ya lolendo bakoki te kotelema liboso na Yo. Oyinaka bato nyonso oyo basalaka mabe.


Boye, moto nyonso oyo akosangisa nzoto na mwasi ya ndeko na ye akozanga te kozwa etumbu.


Mawa na bato oyo basalaka makambo na nkuku mpo na kobombela Yawe mabongisi na bango ; bato oyo basalaka misala na bango na molili mpe balobaka : « Nani akoki komona biso ? Nani akoyeba ? »


tango banyokolaka moto kati na kosambisama, boni, Nkolo amonaka yango te ?


mpe Izayi abotaki mokonzi Davidi. Davidi abotaki Salomo na nzela ya mwasi ya Uri ;


mobali wana asengeli kofuta mbongo ya bibende ya palata, tuku mitano epai ya tata ya elenge mwasi, asengeli kobala elenge mwasi yango ; pamba te asangisi na ye nzoto na makasi : akoki kokabwana na ye te mikolo nyonso ya bomoi na ye.


Tika ete moto nyonso apesa libala lokumu, mpe mbeto ya libala ezala peto, pamba te Nzambe akosambisa bato na pite mpe bato na bikobo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ