Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Samuele 11:16 - Mokanda na Bomoi

16 Joabi oyo azalaki kokengela engumba, atiaki Iri na esika oyo ayebaki ete ezali penza na basoda ya mpiko.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Samuele 11:16
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kati na mokanda yango, akomaki boye : « Tia Iri na molongo ya liboso, na esika oyo bitumba ezali makasi. Mpe bino, bozonga sima na ye mpo ete babeta ye mpe akufa. »


Bongo tango bato ya engumba babimaki mpo na kobundisa Joabi, ndambo ya basoda kati na mampinga ya Davidi bakufaki ; Iri, moto ya Iti, mpe akufaki.


Nani abomaki Abimeleki, mwana mobali ya Yerubesheti ? Ezalaki te mwasi oyo, wuta na likolo ya mir, abwakelaki ye libanga oyo banikelaka ble, yango wana akufaki na Tebesi ? Mpo na nini bopusanaki pembeni ya mir ? › Soki atuni yo bongo, loba na ye : ‹ Mosali na yo, Iri, moto ya Iti, mpe akufi. › »


Tango Abineri azongaki lisusu na Ebron, Joabi abendaki ye na pembeni, na kati-kati ya ekuke ya engumba lokola nde alingi kosolola na ye na nkuku. Mpe kuna, mpo na kozongisa mabe na mabe na tina na makila ya ndeko na ye ya mobali Asaeli, Joabi atubaki Abineri mbeli na libumu, mpe Abineri akufaki.


Sik’oyo, yo moko oyebi makambo oyo Joabi, mwana mobali ya Tseruya, asalaki ngai ; makambo oyo asalaki bakonzi mibale ya mampinga ya Isalaele : Abineri, mwana mobali ya Neri ; mpe Amasa, mwana mobali ya Yeteri. Abomaki bango, asopaki makila ya bitumba na tango ya kimia ; boye, atiaki makila ya bitumba na mokaba oyo alataki na loketo na ye, mpe na basandale oyo ezalaki na makolo na ye.


Boye, Jewu akomelaki bango mokanda ya mibale oyo kati na yango alobaki : « Soki bozali na ngambo na ngai mpe bokotosa ngai, bozwa mito ya bana mibali nyonso ya mokonzi na bino mpe boya na yango epai na ngai, na Jizireyeli, lobi na tongo. » Nzokande bana mibali tuku sambo ya mokonzi bazalaki epai ya bato ya lokumu ya engumba, oyo bazalaki kobokola bango.


Soki mokonzi akomi koyoka makambo ya lokuta, basali na ye nyonso bakokoma bato mabe.


Efrayimi azali konyokwama, anyatami na etumbu, pamba te akangamaki na kolanda kaka banzambe ya bikeko.


Kasi Petelo mpe bantoma mosusu bazongisaki : — Esengeli kotosa Nzambe, kasi bato te !


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ