14 Na tongo, Davidi akomelaki Joabi mokanda mpe atindaki yango na nzela ya Iri.
Mpo na nini otioli Liloba na Yawe na kosala makambo oyo ezali mabe na miso na Ye ? Obomisi Iri, moto ya Iti, na mopanga mpe ozwi mwasi na ye mpo ete akoma mwasi na yo. Obomisi ye na mopanga ya bato ya Amoni.
Nani akoki kososola mabunga na ye oyo asali na nko te ? Limbisa masumu na ngai, oyo nayebi te !
Eyembamaki tango Doegi, moto ya Edomi, akendeki koyebisa Saulo ete Davidi akoti na ndako ya Ayimeleki.
Botielaka Ye elikya tango nyonso, bosopaka mitema na bino liboso na Ye, pamba te Nzambe azali ebombamelo mpo na biso.
Motema eleki biloko nyonso na lokuta mpe ekoki kobika te ; nani akoki koyeba yango ?