12 Davidi alobaki na Iri : — Vanda lisusu awa lelo, bongo lobi nakozongisa yo. Iri avandaki na Yelusalemi mokolo wana mpe mokolo oyo elandaki.
Davidi abengisaki ye. Iri aliaki mpe amelaki elongo na ye, mpe Davidi alangwisaki ye. Kasi na pokwa, Uri abimaki mpo na kokende kolala na mbeto na ye elongo na basali ya mokonzi, kasi akendeki na ndako na ye te.
Soki mabe ezali sukali na monoko na ye mpe abombi yango na se ya lolemo na ye,
Okotika lisusu esika yango, maboko na moto, pamba te Yawe asundoli bato oyo ozalaki kotiela motema ; mpe bango bakosunga yo te. »