Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Samuele 11:11 - Mokanda na Bomoi

11 Iri azongiselaki Davidi : — Sanduku, Isalaele mpe Yuda bazali kovanda na bandako ya kapo ; mpe Joabi, nkolo na ngai, elongo na bato na ye bazali kolala libanda kati na zamba. Ndenge nini ngai nakende na ndako na ngai mpo na kolia, komela mpe kolala na mwasi na ngai ? Solo, na kombo na yo mokonzi, nakoki kosala likambo ya boye te.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Samuele 11:11
19 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tango bayebisaki Davidi ete Iri akendeki na ndako te, atunaki ye : — Boni, yo owuti mosika te ? Mpo na nini oboyi kozonga na ndako na yo ?


Mokonzi atunaki : — Boni, loboko ya Joabi ezali elongo na yo te na makambo oyo nyonso ? Mwasi azongisaki : — Na kombo na yo mokonzi, nkolo na ngai, kati na makambo nyonso oyo mokonzi, nkolo na ngai, awuti koloba, moto moko te akoki kokende, ezala na ngambo ya loboko ya mobali to na ngambo ya loboko ya mwasi. Solo, ezali mosali na yo, Joabi, nde atindaki ngai kosala makambo oyo, mpe ye nde atiaki maloba oyo na monoko na ngai mwasi mosali na yo.


Davidi ayebisaki Abishayi : « Sheba, mwana mobali ya Bikiri, akomonisa biso pasi mingi koleka Abisalomi. Kamata basali ya mokonzi mpe landa ye, noki te akomona bingumba batonga makasi mpe akokima biso. »


mokonzi alobaki na mosakoli Natan : — Tala nanu likambo oyo ! Ngai nazali kovanda na ndako batonga na mabaya ya sedele, kasi Sanduku ya Nzambe ezali kovanda kati na ndako ya kapo.


Natikali nanu kovanda na ndako moko te, banda mokolo oyo nabimisaki Isalaele na Ejipito kino lelo ; nazalaki kotambola bipai na bipai na se ya ndako ya kapo, wana nazalaki kovanda kati na Mongombo.


Moyize alobaki na bakitani ya Gadi mpe ya Ribeni : — Boni, bandeko na bino bakende na bitumba, bongo bino botikala awa ?


Boye soki Ngai, Moteyi mpe Nkolo na bino, nasukoli bino makolo, bosengeli, bino mpe, kosukolana makolo ;


Soki toyiki mpiko, tokokonza mpe elongo na Ye. Kasi soki towangani Ye, Ye mpe akowangana biso ;


Ana alobaki na ye : — Limbisa ngai, nkolo na ngai ; nazali mwasi oyo atelemaki awa pembeni na yo mpo na kobondela Yawe.


Saulo alobaki na Ayiya : « Boya na Sanduku ya Nzambe. » Pamba te na tango wana, Sanduku ya Nzambe ezalaki elongo na bato ya Isalaele.


Tango Saulo amonaki Davidi kokende kobundisa moto ya Filisitia, atunaki Abineri, mokonzi ya mampinga : — Elenge mobali oyo azali mwana ya nani ? Abineri azongisaki : — Na kombo na yo mokonzi, nayebi te.


Kasi Davidi alapaki ndayi na koloba : « Tata na yo ayebi malamu ete nazwaki ngolu na miso na yo, mpe amilobelaki : ‹ Tika ete Jonatan ayeba makambo oyo te, noki te akoyoka pasi na motema ! › Nzokande, na Kombo na Yawe mpe na kombo na yo moko, etikali kaka moke ete baboma ngai. »


Sik’oyo, nkolo na ngai, na Kombo na Yawe mpe na kombo na yo, lokola Yawe apesi yo nzela te ya koboma mpe ya kozongisa yo moko mabe na mabe, tika ete banguna na yo mpe bato nyonso oyo bazali makasi ya kosala mabe epai ya nkolo na ngai bazala lokola Nabali.


Boye batindaki bato na Silo. Mpe longwa kuna, bamemaki Sanduku ya Boyokani ya Yawe, Mokonzi ya mampinga, oyo avandaka na kiti na Ye ya bokonzi kati na basheribe. Ofini mpe Fineasi, bana mibali mibale ya Eli, bazalaki wana elongo na Sanduku ya Boyokani ya Nzambe.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ