2 Samuele 10:5 - Mokanda na Bomoi5 Tango bayebisaki Davidi likambo yango, atindaki bato mosusu mpo na kokende kokutana na bato wana, pamba te basambwisaki bango makasi. Mokonzi atindelaki bango maloba oyo : « Bovanda na Jeriko kino mandefu na bino ekobota lisusu, sima nde bokozonga. » အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Tango bato ya Amoni basosolaki ete bamikomisi bato mabe na miso ya Davidi, bakotisaki bato ya sika na mosala ya soda, oyo bakobanda kobunda bitumba na makolo : epai ya bato ya Siri ya Beti-Reobi mpe ya Tsoba, bato nkoto tuku mibale ; epai ya mokonzi ya Maaka, bato nkoto moko ; epai ya mokonzi ya Tobi, bato nkoto zomi na mibale.
Na tango Akabi azalaki mokonzi, Iyeli, moto ya Beteli, atongaki lisusu engumba Jeriko. Tango atongaki miboko na yango, Abirami, mwana na ye ya liboso ya mobali, akufaki ; mpe tango batiaki bikuke na yango, Segubi, mwana na ye ya mobali ya suka, akufaki. Yango esalemaki kolanda liloba oyo Yawe alobaki na nzela na Jozue, mwana mobali ya Nuni.