Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Samuele 10:18 - Mokanda na Bomoi

18 Kasi bato ya Siri bakimaki liboso ya Isalaele, mpe Davidi abomaki bampunda nkama sambo oyo ezalaki komema bashar mpe basoda nkoto tuku minei oyo babundaka bitumba na likolo ya bampunda. Davidi abetaki mpe Tsobaki, mokonzi na bango ya mampinga, mpe akufaki wana.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Samuele 10:18
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tango Davidi azwaki sango yango, asangisaki bato nyonso ya Isalaele, akatisaki Yordani mpe akomaki na Elami. Bato ya Siri basalaki milongo liboso ya Davidi mpe babundisaki ye.


Davidi akangaki basoda nkoto moko na nkama sambo oyo babundaka bitumba na likolo ya bampunda, mpe basoda nkoto tuku mibale oyo babundaka bitumba na makolo ; akataki misisa ya makolo ya bampunda nyonso, kasi atikaki kaka bampunda nkama moko oyo ezalaki kobenda bashario.


Rezoni asangisaki mibali pene na ye mpe akomaki mokambi ya lisanga ya batomboki tango Davidi abomaki mampinga ya Tsoba. Bongo batomboki bakendeki na Damasi epai wapi bavandaki mpe bakomaki kokonza.


Kasi bato ya Siri bakimaki liboso ya Isalaele, mpe Davidi abomaki basoda na bango, nkoto sambo oyo babundaka bitumba likolo ya bampunda mpe basoda nkoto tuku minei oyo babundaka bitumba na makolo. Davidi abomaki lisusu Tsofaki, mokonzi na bango ya mampinga.


Nalandaka banguna na ngai, mpe nakangaka bango ; nazongaka kaka soki nasilisi koboma bango.


Alobaki : « Bovanda kimia, boyeba ete ngai nazali Nzambe ; nakonzaka bikolo, nakonzaka mpe mokili. »


Soki Nzambe atelemi, banguna na Ye bapalanganaka, mpe bayini na Ye bakimaka mosika na Ye.


Yawe akabaki bango lisusu na maboko ya Yabini, mokonzi ya Kanana, oyo azalaki kovanda na Atsori. Sisera, mokonzi ya mampinga na ye ya basoda, azalaki kovanda na Arosheti-Goyimi.


Wana Baraki azalaki nanu kolanda Sisera, Yaeli abimaki mpo na kokutana na ye. Alobaki na Baraki : « Yaka, nakolakisa yo moto oyo ozali koluka. » Baraki akotaki na ndako ya kapo ya Yaeli mpe amonaki Sisera ya kokufa, alala na mabele, mpe pike kati na litoyi na ye.


Na loboko na ye ya mwasi, azwaki pike ya nzete ; mpe na loboko na ye ya mobali, marto ya basali. Abetaki Sisera mpe apanzaki ye moto, atobolaki ye litoyi mpe apanzaki yango nyonso.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ