17 Tango Davidi azwaki sango yango, asangisaki bato nyonso ya Isalaele, akatisaki Yordani mpe akomaki na Elami. Bato ya Siri basalaki milongo liboso ya Davidi mpe babundisaki ye.
Adadezeri atindaki bantoma kobenga bato ya Siri oyo bazalaki na ngambo mosusu ya ebale. Mpe bayaki na Elami. Tsobaki, mokonzi ya mampinga ya Adadezeri, azalaki liboso na bango.
Tango Davidi azwaki sango yango, asangisaki bato nyonso ya Isalaele mpe akatisaki Yordani ; apusanaki mpe asalaki molongo ya bitumba liboso na bango ya bato ya Siri, mpe bato ya Siri babundisaki ye.