13 Bongo Joabi mpe basoda oyo bazalaki elongo na ye bapusanaki mpo na kobundisa bato ya Siri ; mpe bato yango ya Siri bakimaki liboso na ye.
Tango bato ya Siri oyo bazalaki kovanda na engumba Damasi bayaki kosunga Adadezeri, mokonzi ya Tsoba, Davidi abomaki kati na bango bato nkoto tuku mibale.
Soki Nzambe atelemi, banguna na Ye bapalanganaka, mpe bayini na Ye bakimaka mosika na Ye.