Davidi atunaki lisusu : — Yebisa ngai makambo nini eleki kuna ? Moto yango alobaki : — Mampinga ya Isalaele ekimi bitumba ; ebele kati na bango bakweyi na bitumba mpe bakufi, ata Saulo mpe mwana na ye ya mobali, Jonatan, bakufi.
Elenge mobali azongisaki : — Nazalaki na ngai koleka na likolo ya ngomba Giliboa, mpe namonaki Saulo alaleli likonga na ye. Namonaki lisusu bashar mpe basoda oyo babundaka likolo ya bampunda kokoma pene ya kokanga ye.