24 Oh bino bana basi ya Isalaele, bolela mpo na Saulo oyo alatisaki bino bilamba ya motane mpe biloko ya monzele, oyo atondisaki babiju ya wolo na bilamba na bino.
Boni, elenge mwasi abosanaka penza biloko na ye ya monzele ? Boni, mobandami ya libala abosanaka solo mayaka na ye ? Nzokande, bato na Ngai babosani Ngai mikolo ebele.
« Ezali te mpo bazwi mpe bakaboli bomengo ya bitumba : Elenge mwasi moko to bilenge basi mibale mpo na soda moko, bilamba ya langi mpo na Sisera, bilamba, bilamba ya langi, mpe bilamba oyo batia bililingi, mpo na balongi ? »