Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Samuele 1:21 - Mokanda na Bomoi

21 Oh bangomba ya Giliboa, tika ete mamwe mpe mvula ekweya lisusu te na likolo na bino, ata na likolo ya bilanga oyo ebotaka bambuma mpe epai wapi makabo ewutaka ! Pamba te ezali kuna nde basambwisaki banguba ya bilombe, nguba ya Saulo oyo bakotikala kopakola lisusu mafuta te.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Samuele 1:21
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bato ya Filisitia babundisaki bana ya Isalaele. Bana ya Isalaele bakimaki liboso na bango mpe mingi kati na bango bakufaki na ngomba Giliboa.


Mokolo oyo elandaki, tango bato ya Filisitia bayaki mpo na kolongola biloko oyo ezalaki na banzoto ya bibembe, bamonaki Saulo mpe bana na ye ya mibali oyo bakufaki na ngomba Giliboa.


Kingo na yo ezali lokola ndako molayi ya Davidi, oyo batongi mpo na kobomba bibundeli ; banguba nkoto moko ediembisami kuna, banguba ya basoda ya mpiko.


Mesa ebongisami, batandi bilamba ya mesa, bazali kolia mpe komela ! Bino bakonzi ya basoda, bopakola banguba na bino mafuta !


Nakokomisa yango esobe : kati na yango, bakolongola lisusu te, ezala mabanga to matiti ; bongo banzube mpe basende ekokola kuna. Nakopesa mitindo na mapata ete enokisela yango lisusu mvula te.


Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Na mokolo oyo nzete ya sedele ekitaki na se ya mokili ya bakufi, napesaki mitindo ete mayi oyo ya se ya mabele esala matanga mpo na yango. Likolo na yango, nazipaki mayi ya se ya mabele, nakangaki bibale na yango mpe mayi minene ekangamaki ; nazipaki zamba ya Libani na molili mpe nakawusaki banzete nyonso ya elanga.


Makabo ya bambuma mpe ya masanga ezali kopesama lisusu te na Tempelo ya Yawe. Banganga-Nzambe, basali ya Nkolo, bazali na matanga.


Nani ayebi soki akoki kobongola makanisi to koyoka mawa mpe kotika na sima na Ye lipamboli, mpo ete bokoka lisusu kobonzela Yawe, Nzambe na bino, makabo ya bambuma to makabo ya masanga ya vino ?


Bolakela mboka ya Merozi mabe, elobi anjelu ya Yawe. Bolakela, bolakela mabe bato oyo bavandi kuna ! Pamba te bayei te kosunga Yawe ; bayei te kosunga bilombe ya bitumba !


Bongo Samuele azwaki molangi ya mafuta, asopaki yango na moto ya Saulo, ayambaki ye mpe alobaki : « Boni, Yawe apakoli yo mafuta te mpo ete ozala mokambi ya libula na Ye ?


Bato ya Filisitia bazalaki kobundisa Isalaele, kasi bato ya Isalaele bakimaki liboso na bango mpe mingi kati na bango bakufaki na ngomba Giliboa.


Na mokolo oyo elendaki, tango bato ya Filisitia bayaki mpo na kolongola biloko oyo ezalaki na banzoto ya bibembe, bamonaki Saulo mpe bana na ye misato ya mibali oyo bakufaki na ngomba Giliboa.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ