Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Samuele 1:2 - Mokanda na Bomoi

2 Na mokolo ya misato, moto moko awutaki na molako ya Saulo mpe ayaki na bilamba epasuka, moto etonda na putulu. Tango akomaki epai ya Davidi, amibwakaki na mabele mpo na kogumbama liboso ya Davidi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Samuele 1:2
25 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Na mokolo ya misato, Abrayami atombolaki miso na ye mpe amonaki esika yango na mosika.


Tango Ribeni azongaki na libulu mpe amonaki ete Jozefi azali lisusu kuna te, apasolaki bilamba na ye,


Jakobi apasolaki bilamba na ye, alataki saki mpe asalaki matanga mpo na mwana na ye mikolo ebele.


Bazongisaki : — Mosali na yo, tata na biso, azali nanu na bomoi mpe azali malamu. Bakitisaki mito mpe bagumbamaki liboso na ye.


Davidi atunaki ye : — Owuti wapi ? Azongisaki : — Nakimi wuta na molako ya Isalaele.


Tamari atiaki putulu na moto na ye mpe apasolaki nzambala na ye ya kitoko oyo alataki. Atiaki maboko na ye na moto mpe, wana azalaki kokende, azalaki kolela na mongongo makasi.


Tango mwasi ya mboka Tekoa akomaki epai ya mokonzi, agumbamaki elongi na ye kino na mabele mpe alobaki : — Oh mokonzi, sunga ngai !


Tango Davidi akomaki na songe ya ngomba epai wapi bato bazalaki na momesano ya kokende kogumbamela Nzambe, Ushayi, moto ya Ariki, mopesi toli ya Davidi, azalaki kuna mpo na kokutana na ye, na nzambala na ye epasuka mpe moto na ye etonda na putulu.


Tango Orina atalaki mpe amonaki mokonzi elongo na bakalaka na ye koya epai na ye, abimaki mpe agumbamaki liboso ya mokonzi, elongi kino na mabele.


tango moto moko ayebisaki ngai ete Saulo akufi, wana akanisaki ete amemeli ngai sango malamu. Nakangaki ye mpe nabomaki ye, na Tsikilagi. Ezalaki lifuti oyo napesaki ye mpo na sango na ye.


— Kende kosangisa Bayuda nyonso oyo bazali na engumba Size. Bokila bilei mikolo misato mpo na ngai ; butu mpe moyi, bolia mpe bomela eloko te. Ngai mpe nakokila bilei elongo na basi bawumbu na ngai ndenge moko na bino. Sima na yango kaka nde nakokende epai ya mokonzi atako nakobuka mobeko. Soki mpe nakokufa, nakufa kaka !


Na mokolo ya misato ya kokila bilei, Ester alataki bilamba na ye ya bokonzi mpe akotaki na lopango ya kati ya ndako ya mokonzi, liboso ya shambre na ye. Mokonzi azalaki ya kovanda na kiti na ye ya bokonzi kati na shambre oyo ezalaki kotalana na ekuke ya kokotela.


Boloba na Nzambe : « Tala ndenge nini misala na Yo ebongi na kobanga yango ! Mpo na nguya monene na Yo, banguna na Yo bakomi koluka kokoma baninga na Yo.


bakoganga na mongongo makasi mpe bakolela na mawa nyonso mpo na yo ; bakomisopela putulu na mito mpe bakomibamba na mabele.


Sima na mikolo mibale, akopesa biso lisusu bomoi ; na mokolo ya misato, akotelemisa biso lisusu mpo ete tozala na bomoi liboso na Ye.


Bopasola mitema na bino, kasi bilamba na bino te. Bozonga epai na Yawe, Nzambe na bino, pamba te atonda na ngolu mpe na mawa, asilikaka noki te mpe atonda na bolingo, abongolaka mokano na Ye ya kotindela bato pasi.


Pamba te, ndenge Yona avandaki kati na libumu ya mbisi monene mikolo misato mpe babutu misato, ndenge wana mpe Mwana na Moto akosala mikolo misato mpe babutu misato na se ya mabele.


Wuta na tango wana, Yesu akomaki koloba polele na bayekoli na Ye ete asengeli kokende na Yelusalemi, asengeli komona pasi mingi na maboko ya bakambi ya bato, bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe balakisi ya Mobeko ; basengeli koboma Ye, mpe asengeli kosekwa na mokolo ya misato.


Jozue apasolaki bilamba na ye mpe amibwakaki elongi kino na mabele liboso ya Sanduku ya Yawe kino na pokwa. Bakambi ya Isalaele mpe basalaki kaka ndenge moko, bamisopelaki putulu na mito na bango.


Tala makambo oyo nakosala bato ya ndako ya mayangani ya Satana, oyo balobaka ete bazali Bayuda, nzokande bazali na bango Bayuda te ; bazali nde bakosi. Nakosala ete baya kofukama na makolo na yo mpe bandima ete nalingaka yo.


Sima na elenge mobali kozonga, Davidi abimaki na ngambo ya sude ya libanga mpe agumbamaki mbala misato liboso ya Jonatan, elongi etala na se. Bayambanaki mpe balelaki elongo, kasi Davidi alelaki mingi koleka.


Tango Abigayili amonaki Davidi, akitaki na lombangu wuta na ane na ye mpe agumbamaki na liboso ya Davidi, elongi kino na mabele.


Moto moko ya ekolo ya Benjame akimaki mbangu longwa na bisika oyo bazalaki kobunda mpe akomaki na Silo, na mokolo yango kaka ; azalaki na bilamba epasuka, mpe na putulu, na moto na ye.


Alobaki na Eli : — Nawuti na esika ya bitumba, nawuti kokima kuna kaka lelo. Eli atunaki ye : — Mwana na ngai, makambo nini eleki kuna ?


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ