Pamba te akolaki liboso na Ye lokola nzete ya moke, lokola mosisa oyo ebimi na esobe ; azalaki ata na kitoko to lokumu te oyo ekokaki kobenda miso na biso ete etala ye ; lolenge na ye ezalaki ata na eloko moko te oyo ekokaki kosala ete tosepela na ye.
Tala ndenge nini Nkolo azipi Siona, mboka kitoko, na lipata ya kanda na Ye : akweyisi lokumu ya Isalaele, wuta na likolo kino na se ; na mokolo ya kanda na Ye, abosanaki enyatelo makolo na Ye !
Na mokolo oyo elendaki, tango bato ya Filisitia bayaki mpo na kolongola biloko oyo ezalaki na banzoto ya bibembe, bamonaki Saulo mpe bana na ye misato ya mibali oyo bakufaki na ngomba Giliboa.