Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Samuele 1:16 - Mokanda na Bomoi

16 Davidi alobaki na moto oyo amemelaki ye sango : « Tika ete makila na yo etangama na moto na yo moko, pamba te maloba na yo moko nde efundi yo mpo ete olobi : ‹ Nabomaki mopakolami na Yawe. › »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Samuele 1:16
24 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Boye napusanaki pene na ye mpe nabomaki ye, pamba te nayebaki ete akobika te na kotala ndenge babetaki ye. Sima, nazwaki ekoti na ye ya bokonzi, oyo azalaki na yango na moto mpe singa oyo alataki na loboko na ye, mpe namemi yango epai na yo, nkolo na ngai.


Yawe atangi na moto na yo, makila nyonso ya ndako ya Saulo, oyo osopaki mpo ete okoma mokonzi na esika na ye. Yawe akabi bokonzi na maboko ya Abisalomi, mwana na yo ya mobali. Osili kokweya na pasi mpo ete ozali mosopi makila. »


Mokolo oyo okobima mpe okokatisa lubwaku ya Sedron, okokufa, mpe makila na yo ekotangama na moto na yo moko.


Monoko na yo moko nde ezali komemela yo etumbu, kasi monoko na ngai te ; bibebu na yo moko nde ezali kofunda yo.


omikangi nde singa na maloba na yo, omikangi nde na motambo ya maloba ya monoko na yo.


adefisaka mpo na kozwa mileki mpe litomba oyo eleka ndelo ; boni, mwana ya lolenge oyo akoki solo kozala na bomoi ? Te, akozala na bomoi te ! Mpo ete asalaki makambo wana nyonso ya mbindo, basengeli koboma ye, mpe makila na ye ekotangama na moto na ye moko !


Lokola ayokaki lolaka ya kelelo, kasi azwaki likebisi wana na pamba, makila na ye ekotangama na moto na ye moko. Kasi soki azwaki likebisi wana na pamba te, alingaki solo kobikisa bomoi na ye.


Ndenge moko mpe soki mwasi asangisi nzoto na nyama, bakoboma ye elongo na nyama yango : makila na bango ekotangama na mito na bango moko.


Mobali to mwasi oyo asololaka na bakufi to oyo azali nganga-kisi kati na bino, esengeli baboma ye : bakobamba bango mabanga mpe makila na bango ekotangama na mito na bango moko. »


Moto nyonso oyo akolakela tata na ye to mama na ye mabe, esengeli baboma ye ; pamba te alakeli tata na ye to mama na ye mabe : makila na ye ekotangama na moto na ye moko.


Bato nyonso bazongisaki : — Tika ete makila na ye etangama na mito na biso mpe ya bana na biso !


Nkolo na ye azongisaki : « Mosali mabe ! Nakopesa yo etumbu kolanda maloba na yo moko. Oyebaki ete nazali moto ya matata, ete nazwaka biloko oyo nabombaki te mpe nabukaka bambuma ya nkona oyo nalonaki te.


Kasi tango Bayuda bakomaki kotelemela Polo mpe kofinga ye, apupolaki bilamba na ye mpe alobaki : — Tika ete makila na bino etangama likolo ya mito na bino moko ! Ngai nazali lisusu na ngambo te. Kobanda lelo, nakokende na ngai epai ya bato ya bikolo ya bapaya.


Yango wana, nalobi na bino yango lelo ete nazali na ngambo ya makila ya moto moko te kati na bato nyonso,


Nzokande, toyebi malamu ete makambo nyonso oyo Mobeko elobaka, elobaka yango mpo na bato oyo bazali na se ya bokonzi ya Mobeko, mpo ete moto moko te amilongisa, mpe mpo ete moto nyonso asosola ete azali moto ya masumu liboso ya Nzambe.


Bosala bongo mpo ete makila ya moto oyo ayebi likambo te esopana te kati na mokili na bino oyo Yawe, Nzambe na bino, akopesa bino lokola libula, soki te bokomema ngambo ya makila.


Soki moto moko abimi libanda ya ndako na yo mpe akei na balabala, makila na ye ekotangama na moto na ye moko ; ekozala ngambo na biso te. Kasi soki babomi moto moko kati na bato oyo bakozala kati na ndako na yo, wana makila na ye ekotangama na mito na biso.


Nzambe asalaki bongo mpo na kozongisa mabe na mabe na oyo basalaki tango babomaki bana mibali tuku sambo ya Yerubali, mpo ete makila na bango etangama na moto ya ndeko na bango ya mobali, Abimeleki, mpe na mito ya bato ya Sishemi oyo basungaki ye mpo na koboma bandeko na ye ya mibali.


Tango Davidi ayokaki ete Nabali akufi, alobaki : « Tika ete apambolama, Yawe oyo akoti likambo na ngai na ndenge Nabali atiolaki ngai ! Apesi te na mosali na Ye nzela ya kosala mabe, kasi akweyisi mabe ya Nabali na moto na ye moko ! » Bongo Davidi atindaki maloba epai ya Abigayili mpo na kosenga ye ete akoma mwasi na ye.


Kasi Davidi alobaki na Abishayi : — Te ! Koboma ye te ! Pamba te nani akosembola loboko na ye likolo ya mopakolami na Yawe mpe azanga kozwa etumbu ?


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ