Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Samuele 1:11 - Mokanda na Bomoi

11 Bongo Davidi mpe basoda nyonso oyo bazalaki elongo na ye basimbaki bilamba na bango mpe bapasolaki yango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Samuele 1:11
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tango Ribeni azongaki na libulu mpe amonaki ete Jozefi azali lisusu kuna te, apasolaki bilamba na ye,


Jakobi apasolaki bilamba na ye, alataki saki mpe asalaki matanga mpo na mwana na ye mikolo ebele.


Tango bamonaki bongo, bapasolaki bilamba na bango ; bazongisaki biloko na ba-ane na bango mpe bazongaki bango nyonso na engumba.


Tamari atiaki putulu na moto na ye mpe apasolaki nzambala na ye ya kitoko oyo alataki. Atiaki maboko na ye na moto mpe, wana azalaki kokende, azalaki kolela na mongongo makasi.


Mokonzi atelemaki, apasolaki bilamba na ye mpe amitandaki na mabele. Bakalaka na ye nyonso batelemaki wana na bilamba epasuka.


Bongo Davidi alobaki na Joabi mpe na bato nyonso oyo bazalaki elongo na ye : — Bopasola bilamba na bino mpe bolata basaki, bosala matanga liboso ya Abineri. Ye moko mokonzi Davidi atambolaki na sima ya ebembe.


Tango kaka mokonzi ya Isalaele atangaki mokanda, apasolaki bilamba na ye mpe alobaki : « Boni, ngai nazali Nzambe ? Boni, nazali na makoki ya koboma to ya kozongisa na bomoi ? Mpo na nini moto oyo atindeli ngai moto ete nabikisa ye na bokono na ye ya maba ? Botala ndenge nini azali kolukela ngai makambo ! »


Lokola motema na yo etutami, lokola omikitisi liboso ya Nzambe sima na yo koyoka maloba na Ye mpo na kotelemela esika oyo mpe bavandi na yango, lokola omikitisi liboso na Ngai, lokola opasoli bilamba na yo mpe oleli liboso na Ngai, Ngai mpe nayoki, › elobi Yawe,


Tango nayokaki bongo, napasolaki nzambala mpe kazaka na ngai, napikolaki suki ya moto na ngai mpe mandefu na ngai mpe namivandisaki wana na mabele.


Tango Maridoshe ayokaki makambo nyonso oyo elekaki, apasolaki bilamba na ye ; alataki saki, amipakolaki putulu mpe atambolaki kati na engumba na koganga makasi mpe na mawa.


Boye, mokonzi elongo na bakalaka na ye nyonso oyo bazalaki koyoka makambo oyo ekomamaki na mokanda yango bamitungisaki na eloko moko te mpe bapasolaki bilamba na bango te.


Bopasola mitema na bino, kasi bilamba na bino te. Bozonga epai na Yawe, Nzambe na bino, pamba te atonda na ngolu mpe na mawa, asilikaka noki te mpe atonda na bolingo, abongolaka mokano na Ye ya kotindela bato pasi.


Kasi tango bantoma, Barnabasi mpe Polo, bayokaki sango ya likambo yango, bapasolaki bilamba na bango, bakendeki mbangu epai ebele ya bato bazalaki na koganga :


Bosepelaka elongo na bato oyo bazali kosepela, mpe bolelaka elongo na bato oyo bazali kolela.


Jozue apasolaki bilamba na ye mpe amibwakaki elongi kino na mabele liboso ya Sanduku ya Yawe kino na pokwa. Bakambi ya Isalaele mpe basalaki kaka ndenge moko, bamisopelaki putulu na mito na bango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ