2 Samuele 1:1 - Mokanda na Bomoi1 Wana Saulo asilaki kokufa, Davidi azongaki na Tsikilagi sima na ye kolonga bato ya Amaleki. Mpe avandaki kuna mikolo mibale. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Saulo alobaki na soda oyo amemaki bibundeli na ye : « Bimisa mopanga na yo na ebombelo na yango mpe boma ngai, noki te bato oyo bakatama ngenga te bakoya kotuba ngai mpe kosakanela ngai. » Kasi soda oyo amemaki bibundeli na ye aboyaki, pamba te azalaki kobanga. Bongo Saulo akamataki mopanga na ye mpe amibwakaki na likolo na yango.