Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Petelo 2:3 - Mokanda na Bomoi

3 Kati na lokoso na bango, bakobetela bino masolo ya lokuta mpo na kobenda bino mbongo na nzela ya maloba ya sukali. Nzokande, wuta kala, Nzambe akatela bango etumbu oyo ekoki mpo na bango, mpe libebi ezali penza kozela bango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Petelo 2:3
43 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Solo, bino, bokoki ata kobeta zeke mpo na mwana etike mpe koteka moninga na bino na bowumbu !


Olongisaka ngai na bitumba ya bato, obatelaka ngai mpo ete nazala mokambi ya bikolo. Bato oyo nayebaki te bakomi kosalela ngai.


Boloba na Nzambe : « Tala ndenge nini misala na Yo ebongi na kobanga yango ! Mpo na nguya monene na Yo, banguna na Yo bakomi koluka kokoma baninga na Yo.


nalingaki mbala moko koyokisa banguna na bango soni mpe kobundisa bayini na bango.


Mawa na bato oyo balobaka : « Tika ete Nzambe asala noki, tika ete asala na lombangu mosala na Ye mpo ete tomona yango ! Tika ete mabongisi ya Mosantu ya Isalaele ebelema mpe ekokisama mpo ete tokoka koyeba yango ! »


Bazali lokola bambwa ya lokoso, batondaka te. Bazali babateli oyo bazangi bososoli, moko na moko kati na bango alandaka kaka nzela na ye moko mpe alukaka kaka bolamu na ye moko.


Oyo aleki moke kati na bino akokoma nkoto moko, mpe oyo aleki moke penza akokoma ekolo ya makasi. Ngai, nazali Yawe, nakoyeisa yango mbangu na tango na yango. »


« Bango nyonso, ezala mikolo mpe bana mike, batondi na lokoso ya mbongo, kobanda na basakoli kino na Banganga-Nzambe : bango nyonso bazali kotambola na lokuta.


Yango wana, nakokaba basi na bango epai ya mibali mosusu, mpe bilanga na bango epai ya bato mosusu ; pamba te bango nyonso, ezala mikolo to bana mike, batondi na lokoso ya mbongo ; basakoli mpe Banganga-Nzambe nyonso bakomi se kotambola na lokuta ;


Bozali kobebisa bosantu ya Kombo na Ngai liboso ya bato na Ngai mpo na ndambo ya mbuma ya orje mpe ndambo ya mapa ! Tango bozali kokosa bato na Ngai, oyo bazali koyoka makambo ya lokuta, bozali nde koboma bato oyo basengelaki kokufa te, mpe kotika na bomoi bato oyo basengelaki te kozala na bomoi.


Bakambi na yango basengaka kanyaka liboso ya kokata makambo, Banganga-Nzambe na yango basengaka misolo liboso ya koteya, mpe basakoli na yango basengaka mbongo liboso ya kosakola. Nzokande, babombamaka na sima ya Kombo ya Yawe tango balobaka : « Boni, Yawe azali kati na biso te ? Pasi ekoki kokomela biso te ! »


Nzambe abimelaki na engumba Temani, Mosantu abimelaki na ngomba Parani. Nkembo na Ye ezipaki likolo, mpe lokumu na Ye etondisaki mabele.


« Nani kati na bino akoki kozwa mokano ya kokanga bikuke ya Tempelo mpo ete bopelisa moto na pamba te na etumbelo na Ngai ? Nasepeli na bino ata moke te, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga ; « mpe nakoyamba te makabo oyo ewuti na maboko na bino.


Mawa na bino, balakisi ya Mobeko mpe Bafarizeo, bato ya bilongi mibale ! Boyibaka biloko ya basi oyo bakufisa mibali, mpe bosalaka mabondeli ya milayi-milayi mpo na kokosa bato. Mpo na yango, bokozwa etumbu oyo eleki makasi.]


Nazali koloba na bino : akolongisa bango noki. Nzokande, ekozala ndenge nini tango Mwana na Moto akoya ! Boni, akokuta kondima kati na mokili ?


Kobanda na tango wana, bakomaki kolandela Yesu, mpe batindaki banongi oyo bazalaki komilakisa lokola bato ya sembo, mpo na kokanga Ye na maloba na Ye mpe kokaba Ye na maboko ya basambisi mpe ya moyangeli.


Wana Yesu azalaki nanu koloba, ebele ya bato bayaki ; mpe moto oyo bazalaki kobenga « Yuda, » moko kati na bayekoli zomi na mibale, azalaki liboso na bango. Apusanaki pene ya Yesu mpo na koyamba Ye,


Alobaki na bato oyo bazalaki koteka bibenga : « Bolongola biloko oyo awa ! Ezali Ndako ya Tata na Ngai ! Ebandi ndenge nini bokomisa yango zando ? »


Bato ya lolenge oyo basalelaka nde mabumu na bango, kasi basalelaka Klisto, Nkolo na biso, te. Bapengwisaka makanisi ya bato ya bindima-ndima na nzela ya maloba na bango ya elengi mpe ya sukali.


Solo, biso tozali te lokola ebele ya bato oyo bakomisaka Liloba na Nzambe mombongo na bango mpo na kokoma na bomengo. Kati na Klisto, tosakolaka nde Liloba na bosolo nyonso lokola batindami ya Nzambe.


Bokoki te kokata na ndenge ya mabe, makambo mpo na mopaya to mpo na mwana etike ; to kokamata kazaka ya mwasi oyo akufisa mobali lokola ndanga.


Ngai nde nazongisaka mabe na mabe, Ngai nde nakofuta moto na moto. Tango lokolo na bango ekobeta libaku, na tango wana nde pasi na bango ekoya na lombangu, mpe nyonso oyo Nzambe abongisa wuta kala mpo na bango ekowumela te. »


Boyebi malamu ete tosalelaki maloba ya sukali te mpe totindikamaki te na posa ya konduka mbongo. Na tina na likambo oyo, Nzambe azali penza Motatoli na biso.


Tango bato bakokoma koloba : « Tozali sik’oyo na kimia, mpe tozali lisusu na mitungisi te, » ekozala na tango wana nde libebi ekokweyela bango na mbalakata, lokola pasi ya mwasi oyo azali kobota, mpe bakokoka kokima te.


molangwi masanga te, moto na kanza te, moto na boboto, moto oyo aswanaka te, moto na lokoso ya mbongo te,


Ezali mpe ndenge moko mpo na badiakona. Basengeli kozala : bato oyo babongi na limemia, bato ya maloba mibale te, balangwi masanga te mpe bato oyo balukaka mbongo te na banzela ya mabe.


mpe tembe oyo esilaka te kati na bato oyo mayele na bango ebeba, oyo bayebaka lisusu solo te mpe bakanisaka ete kozala sembo epai na Nzambe ezali nzela ya kozwa bomengo.


Osengeli kosukisa bango, pamba te bazali kobebisa mabota ebele na nzela ya malakisi oyo esengeli kutu te, mpo na kaka kozwa mbongo ya soni.


Lokola motambolisi misala ya Nzambe, mokambi ya Lingomba asengeli kozala moto azanga pamela. Yango wana, asengeli kozala moto na lolendo te, moto na kanda te, molangwi masanga te, moto na kanza te, moto na lokoso ya mbongo te.


mpe libanga oyo ebetisaka bato mabaku, libanga monene oyo ekweyisaka bato. » Bakweyaka mpo ete batosaka te Liloba na Nzambe ; mpe ebongisama nde bongo mpo na bango.


Lokola babateli bibwele, bobatelaka malamu etonga oyo Nzambe apesi bino mokumba ya kokamba. Bosalaka bongo kolanda mokano ya Nzambe : na kotindika te, kasi na komipesa mobimba ; na makanisi te ya konduka mbongo, kasi na posa makasi ya kosalela bango ;


Solo, tango toyebisaki bino makambo oyo etali koya ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso, kati na nguya na yango nyonso, tolandaki te basambole oyo bato basalaka na mayele na bango, kasi na miso na biso moko, tomonaki Ye kati na kongenga nyonso ya nkembo na Ye.


Ndenge kaka basakoli ya lokuta bazalaki kati na bana ya Isalaele na tango ya kala, ndenge wana mpe bateyi ya lokuta bakozala kati na bino ; bakokotisa na mayele mabe mateya ya lokuta mpe ya libebi kino ata kowangana Nkolo oyo asikolaki bango, mpe bakomibendela libebi na mbalakata.


elingi koloba ete Nkolo azali na makoki ya kokangola bayengebene kati na komekama mpe ya kopesa, na mokolo ya kosambisama, etumbu epai ya bato mabe.


Mawa na bango, pamba te balandaki nzela ya Kayina, bapengwaki lokola Balami mpo na lokoso ya mbongo, mpe bakufaki lokola Kore mpo na botomboki.


mpo na kosambisa bato nyonso mpe kopesa etumbu na bato nyonso oyo batosaka Ye te mpo na misala na bango nyonso ya botomboki mpe mpo na mafinga nyonso oyo basumuki yango babimisaki mpo na kofinga Nzambe. »


Bato yango bayimaka-yimaka mpe bamilelaka-lelaka tango nyonso, batambolaka kolanda baposa mabe ya banzoto na bango, bamikumisaka mpe bakumisaka bato mosusu na lokuta mpo na kobenda litomba kowuta na bango.


Pamba te ezali na bato mosusu oyo basili kokota kati na bino na mayele mabe, ba-oyo etumbu na bango ekomama wuta kala : batosaka makambo ya Nzambe te, bakomisaka ngolu ya Nzambe na biso lokola nzela ya kosala makambo na bango ya soni, mpe bawanganaka Yesu-Klisto, Mokonzi kaka moko mpe Nkolo na biso.


Ndenge moko mpe mpo na bato ya Sodome, ya Gomore mpe ya bingumba ya pembeni : basalaki ndenge moko na ba-anjelu, bamipesaki na pite mpe bazalaki kosangisa nzoto na ndenge oyo esengeli te. Bazali ndakisa mpo na bato oyo bazali komona pasi ya etumbu ya moto ya seko na seko.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ