9 Nzokande elingi koloba te ete tozangaki makoki mpo na lisungi ya ndenge wana, kasi tosalaki bongo mpo ete tokoma ndakisa mpo na bino.
Mpo na mobembo na bino, bomema sakosi te, banzambala mibale te, basandale te, lingenda mpe te ; pamba te mosali asengeli kolia na mosala na ye.
pamba te napesi bino kaka ndakisa, mpo ete, bino mpe, bosalaka ndenge kaka Ngai nasali bino.
Boye, nabondeli bino : bolanda ndakisa na ngai.
Tika ete moto oyo bazali koteya Liloba apesa ndambo ya biloko na ye nyonso epai ya moteyi na ye.
Tolukaki te lokumu kowuta na bato, ezala epai na bino to epai ya bato mosusu,
Pamba te boyebi bino moko ndenge nini bosengeli kolanda ndakisa na biso. Tango tozalaki elongo na bino, tozalaki bagoyigoyi te
Nzambe abengaki bino na komona pasi yango, pamba te Klisto mpe amonaki pasi mpo na bino ; boye atikelaki bino ndakisa mpo ete bolanda banzela na Ye.
na makanisi te ya kokonza bato oyo bapesameli bino, kasi na kozalaka bandakisa mpo na etonga.