Pamba te soki nakoki koloba, nakoloba kaka mpo na makambo oyo Klisto asalaki na nzela na ngai, mpo na komema Bapagano na kotosa Nzambe. Asalaki yango na nzela ya makambo oyo nalobaki mpe nasalaki
Nakomelaki bino ndenge mpe nasali yango sik’oyo mpo ete bato oyo basengeli kosepelisa ngai bayokisa ngai mawa te tango nakoya. Nandimisami penza na tina na bino nyonso ete esengo na ngai ezali mpe esengo na bino nyonso.
Elongo na bango, tozali kotinda ndeko na biso, oyo tondimaka mbala na mbala bolingo na ye. Mpe na mbala oyo, azali na yango lisusu koleka, pamba te azali penza kotiela bino motema.
Ngai nandimisami mpo na bino kati na Nkolo ete bokotikala kozala na makanisi mosusu te ; mpe ete moto oyo azali kotia mobulu kati na makanisi na bino akozwa etumbu, ezala ata nani.
Yango wana, balingami na ngai, ndenge bozalaki tango nyonso na botosi, bokoba kosala mpo na lobiko na bino, na kobanga mpe na kolenga : bokosalaka bongo kaka te tango nazali elongo na bino, kasi mpe sik’oyo, na kolekisa, tango nazali elongo na bino te ;
Ezali mpe bolingo yango nde bosengeli kotalisa epai ya bandeko nyonso kati na Masedwane mobimba. Mpe bandeko, tozali kosenga na bino ete bokoba kosalaka bongo koleka,
Tozali kokomela bato ya lolenge wana malako mpe kosenga na bango, na Kombo ya Nkolo Yesu-Klisto, ete basala mosala na kimia mpe balia bilei oyo bakozwa na motoki na bango moko.
Bandeko, totindi bino na Kombo ya Nkolo Yesu-Klisto ete bokima ndeko nyonso oyo atambolaka na bomoi ya mobulu mpe alingaka te kotambola kolanda malakisi oyo bozwaki kowuta na biso.