Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Batesalonika 3:3 - Mokanda na Bomoi

3 Kasi Nkolo azali sembo, akopesa bino makasi mpe akobatela bino liboso ya Satana.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Batesalonika 3:3
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

anjelu oyo akangolaki ngai na mabe nyonso, apambola bana oyo ya mibali ! Tika ete babengama na kombo na ngai, mpe na bakombo ya bakoko na ngai, Abrayami mpe Izaki ! Tika ete bakoma ebele kati na mokili !


Yaebetsi abelelaki Yawe, Nzambe ya Isalaele ; alobaki : « Oh Yawe ! Soki okoki kopambola ngai mpe koyeisa mabele na ngai monene ! Tika ete loboko na Yo ezala likolo na ngai ! Bomba ngai mosika ya mabe mpo ete namona pasi te. » Mpe Nzambe ayanolaki libondeli na ye.


Yawe akobatela yo na mabe nyonso, akobatela bomoi na yo ;


Nani akoki kososola mabunga na ye oyo asali na nko te ? Limbisa masumu na ngai, oyo nayebi te !


Kasi bolobaka kaka ‹ iyo › soki ezali iyo, mpe ‹ te › soki ezali bongo, pamba te maloba nyonso oyo ebakisamaka likolo ewutaka na Mokosi.


komema biso na komekama te, kasi kangola biso longwa na misala ya Satana ; [pamba te bokonzi, nguya mpe nkembo ezali ya Yo seko na seko.]  ›


limbisa masumu na biso, pamba te biso mpe tolimbisaka moto nyonso oyo asalaka biso mabe ; mpe komema biso na komekama te.


Nazali kosenga na Yo te ete olongola bango kati na mokili, kasi nde obatela bango liboso ya Satana.


Pamba te Nzambe oyo abengaki bino mpo ete bozala moko na Mwana na Ye, Yesu-Klisto, Nkolo na biso, azali Moyengebene.


Komekama oyo ekomelaki bino ekomelaka bato nyonso ; mpe Nzambe azali Moyengebene ; akotika te ete bomekama koleka makasi na bino. Kasi na tango ya komekama, akobongisela bino nzela ya kobima na komekama yango, mpe akopesa bino makasi ya kotelemela yango.


Ye oyo azali kobenga bino azali sembo, mpe Ye nde akokokisa yango.


balendisa mitema na bino mpe bapesa bino makasi ya kosala bolamu kati na misala mpe maloba nyonso !


Nayebi solo ete Nkolo akokoba kokangola ngai wuta na misala nyonso ya mabe mpe akobikisa ngai mpo na Bokonzi na Ye ya Likolo. Tika ete nkembo ezonga epai na Ye mpo na libela na libela ! Amen.


Kasi sima na bino komona pasi mpo na mwa tango moke, Nzambe ya ngolu nyonso, oyo abenga bino na nkembo na Ye ya seko kati na Yesu-Klisto, akokomisa bino bato ya kokoka, akolendisa bino, akopesa bino makasi mpe akotelemisa bino ngwi.


elingi koloba ete Nkolo azali na makoki ya kokangola bayengebene kati na komekama mpe ya kopesa, na mokolo ya kosambisama, etumbu epai ya bato mabe.


Epai na Ye oyo azali na makoki ya kobatela bino mpo ete bokweya te, mpe ya kotelemisa bino liboso ya nkembo na Ye lokola bato oyo bazangi mbeba mpe bato ya esengo monene ;


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ