12 Tozali kokomela bato ya lolenge wana malako mpe kosenga na bango, na Kombo ya Nkolo Yesu-Klisto, ete basala mosala na kimia mpe balia bilei oyo bakozwa na motoki na bango moko.
Tika ete moyibi ayiba lisusu te, kasi amipesa nde na mosala ; mpe tika ete maboko na ye esala na bosembo nyonso mpo ete azwa eloko ya kosunga na yango moto oyo azali kati na bosenga.
Bandeko, mpo na oyo etali makambo mosusu, tolakisaki bino ndenge nini bosengeli kotambola mpo na kosepelisa Nzambe, mpe yango nde bozali kosala. Kasi sik’oyo, tozali kosenga na bino mpe kotinda bino na makasi, kati na Nkolo Yesu, ete bokoba kosalaka bongo koleka.
ete bolukaka kobika bomoi na bino kati na kimia ; mpe tika ete moto nyonso atalaka makambo na ye moko mpe aliaka na motoki na ye moko, ndenge kaka toyebisaki bino yango,
mpe toliaki epai ya moto moko te bilei ya ofele ; kasi tozalaki, butu mpe moyi, kosala mosala ya makasi mpe ya pasi, mpo ete topesa mokumba na biso epai ya moto moko te kati na bino.