Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Batesalonika 3:10 - Mokanda na Bomoi

10 Pamba te, ezala tango tozalaki elongo na bino, topesaki bino mobeko oyo : « Tika ete moto oyo aboyi kosala mosala alia mpe te ! »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Batesalonika 3:10
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Okolia lipa na yo na motoki ya elongi na yo kino okozonga na mabele epai wapi owutaki, pamba te ozali putulu mpe okozonga na putulu. »


Moto ya goyigoyi ayokaka baposa, kasi akoki kokokisa yango te ; nzokande baposa ya moto ya nzunzu ekokisamaka.


Moto ya goyigoyi asalaka bilanga te likolo ya kobanga malili ; boye na tango ya kobuka mbuma, alukaka mpe kobuka, kasi akozwa eloko te.


Baposa ya moto ya goyigoyi ekoboma ye, pamba te maboko na ye eboyaka kosala.


Bongo alobaki na bango : — Yango nde makambo oyo nayebisaki bino tango nazalaki nanu elongo na bino : « Makambo nyonso oyo ekomama na tina na Ngai kati na Mobeko ya Moyize, kati na mikanda ya basakoli mpe kati na banzembo, esengeli kokokisama. »


Namiyebiseli bino makambo wana nyonso mpo ete, soki tango yango ekoki, bokanisa ete Ngai nasilaki koyebisa bino yango. Nayebisaki bino yango te wuta na ebandeli, mpo ete nazalaki nanu elongo na bino.


Tango bakutanaki na ye, alobaki na bango : — Boyebi malamu ezaleli nini nazalaki na yango tango nyonso liboso na bino, wuta mokolo ya liboso oyo nakomaki na mokili ya Azia.


Tango tozalaki nanu elongo na bino, toyebisaki bino ete tokokutana na minyoko. Mpe esalemi kaka ndenge wana, ndenge boyebi yango malamu.


ete bolukaka kobika bomoi na bino kati na kimia ; mpe tika ete moto nyonso atalaka makambo na ye moko mpe aliaka na motoki na ye moko, ndenge kaka toyebisaki bino yango,


Boni, bobosani ete nazalaki koyebisa bino makambo yango tango nazalaki elongo na bino ?


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ