2 Batesalonika 2:4 - Mokanda na Bomoi4 Motomboki yango akotelemela makambo nyonso ya Nzambe mpe akomitombola na likolo ya nyonso oyo bato babengaka Nzambe to na likolo ya oyo bato bagumbamelaka, kino kokende kovanda kati na Tempelo ya Nzambe mpe komibenga Nzambe. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
« Mwana na moto, loba na mokambi ya Tiri : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Na lolendo ya motema na yo, olobaki : ‘ Nazali nzambe, navandaka na kiti ya bokonzi ya nzambe na kati-kati ya bibale minene. ’ Nzokande, ozali na yo kaka moto, ozali na yo nzambe te atako okanisi ete ozali na bwanya lokola nzambe.