Bongo, Polo mpe Barnabasi balobaki na bango na mpiko : — Tosengeli liboso koteya bino Liloba na Nzambe. Kasi lokola boboyi yango mpe bozali bino moko komimona ete bokoki te mpo na kozwa bomoi ya seko, tokeyi na biso sik’oyo epai ya bato oyo bazali Bayuda te.
Kasi mpo na moto makasi na yo mpe motema libanga na yo, ozali yo moko komibendela etumbu monene mpo na mokolo oyo Nzambe akokweyisa kanda na Ye mpe akomonisa kosambisama na Ye ya sembo.
Mpe soki tozali bana, tozali mpe bakitani ya libula : tozali bakitani ya libula ya Nzambe, mpe bakitani ya libula elongo na Klisto, soki penza tozali komona pasi elongo na Ye mpo ete tozwa mpe nkembo elongo na Ye.
mpe mpo ete, na esengo nyonso, bozongisaka matondi epai ya Tata oyo apesaki bino makoki ya kosangana na libula ya basantu kati na Bokonzi ya pole. Pamba te :
Bandeko, bino mpe bokomaki kolanda ndakisa ya Mangomba oyo, kati na Yuda, ezali ya Nzambe mpe ezali kati na Yesu-Klisto, pamba te bandeko na bino ya ekolo moko banyokolaki bino ndenge Bayuda banyokolaki Mangomba ya Yuda.
Yango wana tobondelaka tango nyonso Nzambe na biso mpo na bino, mpo ete akomisa bino bato oyo babongi na bomoi oyo abengaki bino mpo na yango ; mpe mpo ete, na nzela ya nguya na Ye, akokisa posa na bino ya kosala bolamu to makambo nyonso oyo kondima na bino ezali kotinda bino kosala.
Nkolo, nani akomeka koboya kotosa Yo mpe koboya kopesa Kombo na Yo nkembo ? Pamba te Yo kaka nde ozali Bule. Bikolo nyonso ekoya mpe ekogumbama liboso na Yo, pamba te misala na Yo ya sembo emonisami na polele.
pamba te akataka makambo na bosolo mpe na bosembo ; apesi etumbu epai ya mwasi ya ndumba monene oyo azalaki kobebisa mokili na nzela ya kindumba na ye, mpe azongisi mabe na mabe mpo na makila ya bawumbu na Ye. »
Nzokande, kati na Sarde, ozali na ndambo ya bato oyo babebisaki te bilamba na bango. Bakotambola elongo na Ngai, na bilamba ya pembe, pamba te babongi na yango.