Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Batesalonika 1:3 - Mokanda na Bomoi

3 Bandeko, tosengeli tango nyonso kozongisaka matondi epai ya Nzambe mpo na bino. Solo, ezali malamu mpo na biso kosalaka bongo, pamba te kondima na bino ezali se kokola mpe bolingo oyo moko na moko kati na bino azali na yango mpo na moninga na ye ezali mpe kokola.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Batesalonika 1:3
26 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nzokande, bato ya sembo bakangamaka na nzela na bango, mpe bato ya maboko peto bakomaka lisusu makasi koleka.


Tango bakatisaka Lubwaku ya Baka, bakomisaka yango esika oyo etonda na bitima ya mayi, mpe mvula etondisaka yango na mapamboli.


Bato ya sembo bafulukaka lokola nzete ya mbila, bakolaka lokola nzete ya sedele ya Libani.


Nzokande, nzela ya bato ya sembo ezali lokola pole ya tongo makasi, oyo kongenga na yango eyaka malembe-malembe kino tango moyi ekobima makasi.


Kasi tosengelaki kaka kosala feti mpe kosepela, pamba te ndeko na yo, oyo ozali komona, akufaki, kasi azongi lisusu na bomoi ; abungaki, kasi amonani ! »


Bantoma balobaki na Nkolo : — Bakisa kondima na biso !


Tata na Ngai akataka etape nyonso oyo, kati na Ngai, ebotaka mbuma te ; mpe abongisaka bitape nyonso oyo ebotaka bambuma, mpo ete ebota lisusu bambuma ebele koleka.


Ya liboso, nazali kozongisa matondi epai ya Nzambe na ngai, na nzela ya Yesu-Klisto, mpo na bino nyonso, pamba te bazali kolobela kondima na bino kati na mokili mobimba.


Nazongisaka tango nyonso matondi epai ya Nzambe na tina na bino, mpo na ngolu na Ye, oyo epesamela bino kati na Yesu-Klisto ;


Tomikumisaka te mpo na mosala ya bato mosusu ; nzokande, tozali na elikya ete, wana kondima na bino ezali kokola, mosala na biso mpe ezali kokoba koya monene kati na bino kolanda bandelo ya mosala, oyo Nzambe apesa biso.


bozongisaka tango nyonso matondi epai ya Nzambe Tata mpo na makambo nyonso, na Kombo na Yesu-Klisto, Nkolo na biso ;


Ezali sembo mpo na ngai kozala na makanisi ya lolenge oyo mpo na bino nyonso ; solo, nalingaka bino mingi, pamba te bino nyonso bosanganaka makasi elongo na ngai kati na ngolu ya Nzambe, ezala tango nazali ya kokangama na minyololo kati na boloko to tango nazali kolobela mpe kotatola Sango Malamu na molende.


Mpe nasengaka kati na mabondeli na ngai ete bolingo na bino ekoba kokola tango nyonso kati na boyebi ya solo mpe na bososoli ya kokoka,


Tika ete Nkolo abakisa mpe afulukisa bolingo kati na bino mpo ete bolinganaka, bamoko na bamosusu, mpe mpo ete bolingaka bato nyonso, ndenge kaka biso mpe tolingaka bino.


Kasi sik’oyo, Timote awuti epai na bino mpe asili kozonga epai na biso, amemeli biso sango ya kitoko na tina na kondima mpe bolingo na bino : ayebisi biso ete bozali tango nyonso na makanisi ya malamu mpo na biso mpe bozali na posa makasi ya komona biso, ndenge biso mpe tozali na posa makasi ya komona bino.


Matondi ya ndenge nini tokoki kozongisa epai ya Nzambe na tina na bino, mpo na esengo nyonso oyo tozali na yango mpo na bino liboso ya Nzambe na biso ?


Bandeko, mpo na oyo etali makambo mosusu, tolakisaki bino ndenge nini bosengeli kotambola mpo na kosepelisa Nzambe, mpe yango nde bozali kosala. Kasi sik’oyo, tozali kosenga na bino mpe kotinda bino na makasi, kati na Nkolo Yesu, ete bokoba kosalaka bongo koleka.


Bandeko, mpo na oyo etali boyei ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso, mpe bosangani na biso epai na Ye, tozali kosenga na bino boye :


Kasi biso bandeko balingami ya Nkolo, tosengeli tango nyonso kozongisaka matondi epai ya Nzambe mpo na bino oyo Nkolo alingaka, pamba te Nzambe asila kopona bino wuta na ebandeli mpo ete bozwa lobiko, na nzela ya libulisi ya Molimo mpe ya kondima kati na solo.


Lokola bosili komipetola na nzela ya kotosa bosolo mpo na kolingana na bolingo ya solo, bolinganaka makasi bino na bino, na motema ya peto.


Namoni ete ezali malamu mpo na ngai kolamusa makanisi na bino awa nazali nanu na bomoi kati na ndako ya kapo ya nzoto oyo ;


kasi bokola kati na ngolu mpe boyebi ya Yesu-Klisto, Nkolo mpe Mobikisi na biso. Tika ete nkembo epesamela Ye, wuta sik’oyo kino libela na libela ! Amen !


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ