Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Batesalonika 1:11 - Mokanda na Bomoi

11 Yango wana tobondelaka tango nyonso Nzambe na biso mpo na bino, mpo ete akomisa bino bato oyo babongi na bomoi oyo abengaki bino mpo na yango ; mpe mpo ete, na nzela ya nguya na Ye, akokisa posa na bino ya kosala bolamu to makambo nyonso oyo kondima na bino ezali kotinda bino kosala.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Batesalonika 1:11
41 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Yawe akokisaka makambo nyonso mpo na bolamu na ngai. Yawe, bolingo na Yo ewumelaka seko na seko ! Kosundola te bato oyo osala na maboko na Yo !


Botala lopango na yango, botala malamu bandako na yango mpo ete bopesa sango epai ya bato oyo bakoya na sima.


Mpo ete osepelaka na mbeka te, nakobonza te mbeka ya kotumba oyo ondimaka te.


Tika ete Nkolo akumisama, mokolo na mokolo ! Nzambe Mobikisi na biso alataka makambo na biso.


Nzokande, nzela ya bato ya sembo ezali lokola pole ya tongo makasi, oyo kongenga na yango eyaka malembe-malembe kino tango moyi ekobima makasi.


Na mokolo wana, bakoloba : « Solo, Oyo azali penza Nzambe na biso ! Totiaki mitema epai na Ye mpe abikisi biso. Oyo azali solo Yawe, totiaki mitema epai na Ye ; tika ete tosepela mpe tozala na esengo mpo na lobiko oyo apesi biso ! »


Tika ete moto mabe atika banzela na ye, mpe tika ete mosumuki atika makanisi na ye ; tika ete azonga epai na Yawe mpo ete ayokela ye mawa, tika ete azonga epai ya Nzambe na biso, pamba te alimbisaka kaka.


Nakoki solo koyeisa pasi ya kobota mpe kozanga makoki ya kobotisa ? » Elobi Yawe. « Nakoki solo kokanga mabota soki nazali kopesa mabota ? » elobi Nzambe na yo.


Soki babwaki biso kati na libulu ya moto, Nzambe oyo tosalelaka azali na makoki ya kobikisa biso wuta na libulu yango mpe ya kokangola biso na maboko na yo.


Toyeba Yawe, toluka penza koyeba Ye ; ndenge tongo etanaka solo, ndenge wana mpe akomonana : akoya epai na biso lokola mvula, lokola mvula oyo enokaka na pwasa mpe epolisaka mabele.


Ozali nani, ngomba monene ? Okokoma etando liboso ya Zorobabeli. Akobimisa libanga monene kati na yo, wana bato bakozala koganga na esengo : « Tika ete Nzambe apambola yango ! Tika ete Nzambe apambola yango ! »


pamba te yango moko mabele nde ebimisaka mbuma : liboso, moto ya nzete ; sima, matiti ; mpe na suka, bambuma ya ble etondaka na nzete.


Oh etonga moke, bobanga te ! Pamba te Tata na bino asepelaki kopesa bino Bokonzi !


Nzambe oyo nasalelaka na motema na ngai mobimba tango nateyaka Sango Malamu ya Mwana na Ye, azali Motatoli na ngai ete natikaka te kotanga kombo na bino


pamba te Nzambe abotolaka te makabo oyo asili kopesa mpe abongolaka te makanisi na Ye epai ya bato oyo asili kobenga.


Bandeko na ngai, nandimisami solo ete botondi na boboto, na boyebi nyonso mpe na makoki ya kolendisana, bamoko na bamosusu.


Mpe ba-oyo abongisa wuta kala, abenga mpe bango ; ba-oyo abenga, akomisa bango bato ya sembo ; mpe ba-oyo akomisa bato ya sembo, apesa bango mpe nkembo na Ye.


Ezali Ye nde akolendisa mpe bino kino na suka, mpo ete bozala bato bazangi pamela na mokolo ya Nkolo na biso, Yesu-Klisto.


nazongisaka tango nyonso matondi epai ya Nzambe mpo na bino, nakanisaka bino na mabondeli na ngai


abongisa biso wuta kala mpo ete tozwa makoki ya kokoma bana na Ye na nzela ya Yesu-Klisto, kolanda bolamu mpe mokano na Ye moko,


mpe na kolakisa biso mabombami ya mokano na Ye, mabombami oyo abongisa kati na Klisto kolanda bolamu na Ye,


Nandimisami solo ete Ye oyo abandaki mosala kitoko oyo kati na bino akokomisa yango kino na suka, na mokolo ya Yesu-Klisto.


pamba te ezali Nzambe nde apesaka posa mpe makoki ya kosala makambo nyonso, ndenge ezali mabongisi na Ye ya bolingo.


Boye nazali kopota mbangu kino nakoma na suka mpo na kozwa mbano oyo Nzambe abenga ngai mpo na yango wuta na Likolo kati na Yesu-Klisto.


Tobosanaka te liboso ya Nzambe, Tata na biso, misala ya kondima na bino, misala ya bolingo na bino mpe molende na bino, oyo ewuti na elikya monene oyo bozali na yango kati na Nkolo na biso, Yesu-Klisto.


Makambo oyo nyonso ezali kolakisa na polele ete Nzambe atalaka makambo na bosembo, mpe ete alingi kozwa bino lokola bato oyo babongi mpo na Bokonzi ya Nzambe, oyo bozali komonela pasi.


Na nzela ya Sango Malamu oyo toteyaki bino, Nzambe abengaki bino mpo ete bozwa lobiko mpe nkembo ya Nkolo na biso, Yesu-Klisto.


Tika ete miso na biso etalaka kaka Yesu oyo azali Mobandisi mpe Mokokisi ya kondima ; pamba te, na esika ya esengo oyo ebongisama mpo na Ye, andimaki kokufa na ekulusu mpe koyoka soni makasi, mpe avandi sik’oyo na ngambo ya loboko ya mobali ya Kiti ya Bokonzi ya Nzambe.


Yango wana, bandeko basantu, bino oyo Nzambe abenga mpo na kozwa bomengo ya Likolo, botalela kaka Yesu oyo biso tozali kondima lokola Ntoma mpe Mokonzi ya Banganga-Nzambe.


Kasi sima na bino komona pasi mpo na mwa tango moke, Nzambe ya ngolu nyonso, oyo abenga bino na nkembo na Ye ya seko kati na Yesu-Klisto, akokomisa bino bato ya kokoka, akolendisa bino, akopesa bino makasi mpe akotelemisa bino ngwi.


Nzokande, kati na Sarde, ozali na ndambo ya bato oyo babebisaki te bilamba na bango. Bakotambola elongo na Ngai, na bilamba ya pembe, pamba te babongi na yango.


Okomisaki bango ekolo ya bakonzi mpe ya Banganga-Nzambe mpo Nzambe na biso, mpe bakokonza mokili. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ